Yobo
1
Komekama ya Yobo
Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo ; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe. Azalaki na bana mibali sambo, bana basi misato ; mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.
Bana na ye ya mibali bazalaki na ezaleli ya kosangana kati na ndako ya moko kati na bango, mpo na kosala feti ; mpe, na feti yango, bazalaki kobengisa bandeko na bango ya basi mpo na kolia mpe komela elongo na bango. Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango ; pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. »
Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso.
Komekama ya liboso
Mokolo moko, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango.
Yawe atunaki Satana :
— Owuti wapi ?
Satana azongiselaki Yawe :
— Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.
Yawe alobaki na Satana :
— Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe.
Satana azongiselaki Yawe :
— Okanisi ete ezali na pamba nde Yobo atosaka Nzambe ? 10 Boni, otonga mir te zingazinga na ye mpo na kobatela ye, ndako na ye mpe biloko na ye nyonso ? Opambola misala ya maboko na ye, mpe bibwele na ye epanzana na mokili mobimba. 11 Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo mpe beta biloko na ye nyonso ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.
12 Yawe alobaki na Satana :
— Malamu ! Biloko na ye nyonso ezali kati na maboko na yo ; kasi, kokitisa loboko na yo te na bomoi na ye !
Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe.
13 Mokolo moko, tango bana mibali mpe bana basi ya Yobo bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso, 14 ntoma moko ayaki epai na Yobo mpo na koyebisa ye : « Bangombe ezalaki kobalola mabele ya bilanga, mpe ba-ane ezalaki kolia matiti pembeni wana ; 15 bongo bato ya Saba bayei kokweyela yango mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »
16 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Moto ya Nzambe ekweyi longwa na likolo mpe ezikisi bibwele mpe basali ! Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »
17 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »
18 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Wana bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso, 19 mopepe moko ya makasi ewutaki na ngambo mosusu ya esobe mpe eyaki kobeta basonge minei ya ndako. Ndako ekweyeli bango, mpe bango nyonso basili kokufa. Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »
20 Yobo atelemaki, apasolaki kazaka na ye, akokolaki suki ya moto na ye, akweyaki na mabele mpe afukamaki. 21 Alobaki :
« Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai,
mpe nakozonga bolumbu.
Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ;
tika ete Kombo na Ye ekumisama ! »
22 Na makambo wana nyonso, Yobo atikalaki kosala lisumu te mpe atangaki pasi yango na moto ya Nzambe te.