5
Libota ya Ribeni
Ribeni azalaki mwana mobali ya liboso ya Isalaele. Kasi lokola asangisaki nzoto na mwasi moko kati na basi ya tata na ye, makoki ya bomwana na ye ya liboso epesamaki epai ya bana mibali ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele. Yango wana bazalaki kotanga ye lisusu te lokola mwana ya liboso. Nzokande, Jozefi akomamaki te na buku ya mabota lokola mwana ya liboso. Yuda alekaki bandeko na ye nyonso ya mibali na makasi, mpe moto oyo akomaki mokonzi abimaki na nzela na ye. Kasi atako bongo, makoki ya bomwana ya liboso epesamaki kaka epai ya Jozefi.
(Ebl 46.9; Mit 26.5-6)
Tala bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele :
Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.
Bakitani ya Joeli :
Shemaya, mwana mobali ya Joeli ; Gogi, mwana mobali ya Shemaya ;
Shimei, mwana mobali ya Gogi ; Mishe, mwana mobali ya Shimei ;
Reaya, mwana mobali ya Mishe ; Bala, mwana mobali ya Reaya ;
Beera, mwana mobali ya Bala mpe mokambi ya bato ya Ribeni, oyo Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, amemaki na bowumbu.
Tala bandeko ya Beera kolanda etuka na bango ndenge bakomami na molongo ya botata na bango :
mokambi Yeyeli, Zakari ; Bela, mwana mobali ya Azazi, koko ya Shema, mwana mobali ya Joeli.
 
Bazalaki kovanda na mboka Aroeri mpe na etuka oyo ekenda kino na ngomba Nebo mpe na Bala-Meoni. Bavandaki na ngambo ya este, longwa na mondelo ya esobe kino na ebale Efrate, pamba te bangombe na bango ekomaki ebele kati na mokili ya Galadi. 10 Na tango Saulo azalaki mokonzi, babundisaki bato ya Agari mpe balongaki bango. Bavandaki na bandako na bango ya kapo oyo ezalaki na etuka mobimba ya ngambo ya Galadi.
Libota ya Gadi
11 Bakitani ya Gadi bazalaki kovanda pembeni ya bakitani ya Ribeni, na mokili ya Bashani kino na Salika.
 
12 Etuka ya Joeli nde elekaki monene, elandamaki na etuka ya Shafami, mpe bituka ya Yaenayi mpe Shafati esukisaki, kati na Bashani.
13 Bandeko na bango ya mibali kolanda mabota na bango bazalaki :
Mikaeli, Meshulami, Sheba, Yorayi, Yaekani, Ziya mpe Eberi.
Bango nyonso bazalaki sambo.
14 Bazalaki bana ya Abiyaili, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Yaroa, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali Mikaeli, mwana mobali ya Yeshishai, mwana mobali ya Yado, mwana mobali ya Buzi.
15 Ayi, mwana mobali ya Abidieli, mwana mobali ya Guni, azalaki mokambi ya bituka na bango.
 
16 Bango nyonso bazalaki kovanda na Galadi, na Bashani, na bamboka na yango ya zingazinga mpe na bilanga nyonso ya Saroni kino na suka na yango. 17 Batangaki bato nyonso oyo tango Yotami azalaki mokonzi ya Yuda mpe Jeroboami, mokonzi ya Isalaele.
 
18 Bakitani ya mabota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazalaki bango nyonso nkoto tuku minei na minei na nkama sambo na tuku motoba. Babongamaki mpo na mosala ya soda. Bazalaki bilombe mibali oyo bayebi kosalela nguba, mopanga, tolotolo ; mpe bamilengela mpo na bitumba. 19 Babundisaki bato ya Agari, ya Yeturi, ya Nafishi mpe ya Nodabi. 20 Nzambe asungaki bango mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya Agari mpe baninga na bango nyonso oyo bayaki kosunga bango, pamba te babelelaki Yawe na tango ya bitumba. Yawe ayanolaki bango, pamba te batielaki Ye motema. 21 Bazwaki bibwele ya bato ya Agari : bashamo nkoto tuku mitano, bameme nkoto nkama mibale na tuku mitano, mpe ba-ane nkoto mibale. Bazwaki mpe bakangami nkoto nkama moko : 22 mingi bakufaki, pamba te bitumba ezalaki na maboko ya Nzambe. Bavandaki na mokili yango kino na tango ya bowumbu.
Libota ya Manase
23 Bakitani ya ndambo ya libota ya Manase bavandaki na mokili oyo ezalaki longwa na Bashani kino na Bala-Erimoni, Seniri mpe ngomba Erimoni. 24 Tala bakambi ya bituka na bango : Eferi, Yisheyi, Elieli, Azirieli, Jeremi, Odavia mpe Yadiele. Bazalaki bilombe ya bitumba, bato bayebana mpe bakambi ya mabota na bango.
25 Kasi lokola batosaki te Nzambe ya bakoko na bango mpe bakomaki kosalela banzambe ya bato ya mokili oyo Nzambe abebisaki liboso na bango.
26 Yango wana Nzambe ya Isalaele alamusaki molimo ya Puli, mokonzi ya Asiri, mpe molimo ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na komema na bowumbu : bato ya libota ya Ribeni, ya libota ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. Amemaki bango na Ala, na Abori, na Ara mpe na ngambo ya ebale Gozani, epai wapi bazali kovanda kino lelo.
Libota ya Levi
(Ebl 46.11; Mit 26.59-60)
27 Bana mibali ya Levi :
Gerishoni, Keati mpe Merari.
28 Bana mibali ya Keati :
Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
29 Bana ya Amirami :
Aron, Moyize mpe Miriami.
Bana mibali ya Aron :
Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
30 Eleazari abotaki Pineasi ;
Pineasi abotaki Abishuwa ;
31 Abishuwa abotaki Buki ;
Buki abotaki Uzi ;
32 Uzi abotaki Zerakia ;
Zerakia abotaki Merayoti ;
33 Merayoti abotaki Amaria ;
Amaria abotaki Ayitubi ;
34 Ayitubi abotaki Tsadoki ;
Tsadoki abotaki Ayimaatsi ;
35 Ayimaatsi abotaki Azaria ;
Azaria abotaki Yoanani ;
36 Yoanani abotaki Azaria oyo azalaki Nganga-Nzambe kati na Tempelo oyo Salomo atongaki na Yelusalemi.
37 Azaria abotaki Amaria ;
Amaria abotaki Ayitubi ;
38 Ayitubi abotaki Tsadoki,
mpe Tsadoki abotaki Shalumi ;
39 Shalumi abotaki Ilikia ;
Ilikia abotaki Azaria ;
40 Azaria abotaki Seraya ;
Seraya abotaki Yeotsadaki.
41 Yeotsadaki akendeki na bowumbu tango Yawe akabaki Yelusalemi mpe Yuda na maboko ya Nabukodonozori.