17
Elaka ya Nzambe epai ya Davidi
(2Sa 7.1-17)
Wana Davidi avandaki na ndako na ye ya bokonzi, alobaki na mosakoli Natan :
— Nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezali kati na ndako ya kapo.
Natan azongiselaki Davidi :
— Sala nyonso oyo ozali na yango na motema, pamba te Nzambe azali elongo na yo.
Kasi na butu wana, Nzambe alobaki na Natan :
— Kende koyebisa Davidi, mosali na Ngai : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali yo te moto okotongela Ngai ndako mpo ete navanda kati na yango. Banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo, natikali nanu kovanda na ndako moko te ; nazalaki kaka kati na Mongombo, longwa na esika songolo kino na esika pakala. Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na Ngai : ‘ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele ? ’ ›
Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele. Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili. Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso ; 10 mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakotia lisusu banguna na yo na se ya bokonzi na yo.
Boye, nazali koyebisa yo ete Yawe akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo. 11 Tango okosilisa mobembo na yo awa na mokili mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye. 12 Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi. 13 Nakozala tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai ; nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya mokonzi oyo alekaki liboso na yo. 14 Nakotia ye mokonzi ya ndako na Ngai mpe ya mokili na Ngai mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. › »
15 Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso.
Libondeli ya Davidi
(2Sa 7.18-29)
16 Mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki :
« Oh Yawe Nzambe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali ? 17 Mpe lokola nde ekokaki te na miso na Yo, Nzambe na ngai, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo !
Oh Yawe Nzambe, ozali kozwa ngai lokola moto ya lokumu ! 18 Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo mpo na lokumu oyo ozali kopesa na mosali na Yo ? Pamba te, oh Yawe, oyebi mosali na Yo. 19 Oh Yawe, mpo na mosali na Yo mpe kolanda mokano na Yo, okokisi makambo minene oyo mpe osali ete bilaka minene oyo nyonso eyebana.
20 Oh Yawe, moko te akokani na Yo ; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo ! 21 Boni, ezali solo na ekolo moko kati na mokili, oyo ekokani na bato na Yo, Isalaele ; ekolo oyo, kati na mokili, Nzambe asikola bato na yango mpo na lokumu na Ye moko ? Osalaki ete Kombo na yo ekende sango na nzela ya misala minene mpe ya somo oyo osalaki tango obenganaki bikolo liboso ya bato na Yo, oyo akangolaki na Ejipito. 22 Okomisi Isalaele bato na Yo mpo na libela, mpe Yo, Yawe, okomi Nzambe na bango.
23 Bongo sik’oyo, oh Yawe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe libota na ye ekokisama mpo na libela ! Sala ndenge olakaki. 24 Boye, sala ete ekokisama, mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko mpe bato bakoma kolobaka : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, azali solo Nzambe mpo na Isalaele ! › Boye bokonzi ya libota ya mosali na Yo, Davidi, ekolendisama liboso na Yo.
25 Solo, Yo moko, Nzambe na ngai, olakisaki na mosali na Yo ete okosala ete bokonzi ewumela na libota na ye. Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo. 26 Sik’oyo oh Yawe, ozali Nzambe ! Olakaki makambo ya malamu epai ya mosali na Yo. 27 Osepeli sik’oyo kopambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo ; pamba te ezali Yo, Yawe, nde opamboli yango, mpe epambolami mpo na libela. »