21
Davidi atangi bato
(2Sa 24.1-25)
Satana atelemelaki Isalaele mpe atindikaki Davidi na kotanga motango ya bato ya Isalaele. Boye, Davidi apesaki mitindo na Joabi mpe na bakambi ya bato :
— Bokende kotanga bato ya Isalaele, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpe boyebisa ngai motango na bango mpo ete nayeba.
Kasi Joabi azongisaki :
— Tika ete Yawe akomisa bato na Ye ebele koleka mbala nkama ! Oh mokonzi, nkolo na ngai, bango nyonso bazali te basali ya nkolo na ngai ? Mpo na nini nkolo na ngai alingi kosala bongo ? Mpo na nini komemisa Isalaele ngambo ?
Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi. Boye, Joabi abimaki, atambolaki kati na Isalaele mobimba mpe azongaki na Yelusalemi. Joabi ayebisaki Davidi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato monkoko moko na nkoto nkama moko kati na Isalaele mobimba, mpe nkoto nkama minei na tuku sambo kati na Yuda. Kasi kati na bango, Joabi atangaki te ekolo ya Levi mpe ya Benjame ; pamba te etinda ya mokonzi esepelisaki ye te.
Etinda yango esepelisaki Nzambe te mpe Nzambe apesaki Isalaele etumbu.
Davidi alobaki na Nzambe :
— Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.
Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya Davidi :
10 — Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »
11 Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye :
— Tala makambo oyo Yawe alobi : « Oponi etumbu nini : 12 mibu misato ya nzala makasi ; sanza misato oyo banguna na yo bakolonga yo mpe mipanga na bango ekoboma basoda na yo ; to mikolo misato elongo na mopanga ya Yawe mpe bokono oyo ebomaka, mikolo oyo anjelu ya Yawe akobebisa etuka nyonso ya Isalaele ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai. »
13 Davidi azongiselaki Gadi :
— Nazali na pasi makasi kati na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato !
14 Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, mpe bato ya Isalaele nkoto tuku sambo bakufaki. 15 Nzambe atindaki anjelu na Yelusalemi mpo na kobebisa yango ; kasi wana anjelu azalaki kobebisa, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! »
Anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orinani, moto ya Yebusi. 16 Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu ya Yawe atelemi kati ya likolo mpe mabele, bongo na loboko na ye oyo asembolaki likolo ya Yelusalemi, asimbaki mopanga ezanga ebombelo.
Davidi mpe bampaka balataki basaki mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.
17 Davidi alobaki na Nzambe :
— Boni, ezali ngai nde napesaki mitindo ete batanga motango ya bato ? Ngai moko nde nasalaki masumu, ngai moko nde nasalaki mbeba oyo eleki mabe. Bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te. Oh Yawe, Nzambe na ngai, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ; kasi tika ete bokono oyo ebomaka ekweyela te bato na Yo !
Davidi atongi etumbelo mpo na Yawe
18 Anjelu na Yawe atindaki Gadi koloba na Davidi :
— Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orinani, moto ya Yebusi. 19 Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe. 20 Bongo, wana Orinani azalaki kotuta ble, abalukaki mpe amonaki anjelu. Boye bana na ye ya mibali minei oyo bazalaki na ye elongo babombamaki.
21 Davidi apusanaki pembeni ya Orinani ; mpe tango Orinani atalaki mpe amonaki Davidi, abimaki na etando mpe agumbamaki liboso ya Davidi, elongi kino na mabele. 22 Davidi alobaki na Orinani :
— Pesa ngai etando na yo, tekela ngai yango na motuya ya mbongo oyo ekoki na yango, mpo ete natonga etumbelo mpo na Yawe ; tekela ngai yango mpo ete etumbu ya bokono oyo ezali koboma bato esila.
23 Orinani azongiselaki Davidi :
— Kamata yango ; mpe tika ete mokonzi, nkolo na ngai, asala na yango nyonso oyo amoni ete ezali malamu mpo na ye. Tala, ngai, nakopesa bangombe ya mibali lokola mbeka ya kotumba, banzete oyo babetelaka ble lokola koni, mpe ble lokola mbeka ya bambuma. Nakopesa nyonso wana.
24 Kasi mokonzi Davidi alobaki na Orinani :
— Te ! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango ; nakomema te epai na Yawe eloko oyo ezali ya yo, nakobonzela Yawe te bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele.
25 Boye, Davidi asombaki etando yango epai ya Orinani, na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo, nkama motoba. 26 Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka.
27 Boye Yawe alobaki na anjelu, mpe anjelu azongisaki mopanga na ye na ebombelo na yango.
28 Banda na tango wana, lokola Davidi amonaki ete Yawe ayanolaki ye na etando ya Orinani, moto ya Yebusi, akomaki kobonza bambeka tango nyonso na esika wana. 29 Mongombo na Yawe oyo Moyize atongaki na esobe mpe etumbelo ya bambeka ya kotumba ezalaki na tango wana, na esambelo ya likolo ya ngomba ya Gabaoni. 30 Nzokande Davidi azalaki kokoka te kozwa mokano ya kokende kotuna Nzambe liboso ya Mongombo, pamba te azalaki kobanga mopanga na Yawe.