24
Kokabola misala ya Balevi
Tala bituka ya bana mibali ya Aron : Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari. Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya tata na bango mpe batikalaki kobota te. Eleazari mpe Itamari basalaki mosala na bango ya bonganga-Nzambe. Tala ndenge Davidi akabolaki bango kolanda misala oyo bapesaki bango : Tsadoki, na etuka ya Eleazari ; Ayimeleki, na etuka ya Itamari.
Bamonaki ete kati na bakitani ya Eleazari, bana mibali bazalaki ebele koleka bato oyo bazalaki kati na bakitani ya Itamari. Boye, bakabolaki bana mibali ya Eleazari lokola bakonzi ya mabota zomi na motoba mpe bana mibali ya Itamari lokola bakonzi ya mabota mwambe. Babetaki zeke mpo na kokabola bango, pamba te kati na bakitani ya Eleazari mpe ya Itamari, ezalaki na bakambi ya Esika ya bule mpe bakambi ya mosala ya Nzambe. Shemaya, mokomi mikanda, mwana mobali ya Netaneeli, na libota ya Levi, akomaki bakombo na bango na miso ya mokonzi, ya bakambi, ya Nganga-Nzambe Tsadoki, ya Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari ; mpe ya bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe mpe Balevi. Babetaki zeke mbala mibale mpo na etuka ya Eleazari, mpe mbala moko, mpo na etuka ya Itamari.
 
Tala ndenge bakambi ya mabota baponamaki na nzela ya zeke :
zeke ya liboso ekweyaki epai ya Yeoyaribi ;
zeke ya mibale ekweyaki epai ya Yedaeya ;
zeke ya misato ekweyaki epai ya Arimi ;
zeke ya minei ekweyaki epai ya Seorimi ;
zeke ya mitano ekweyaki epai ya Malikiya ;
zeke ya motoba ekweyaki epai ya Miyamini ;
10 zeke ya sambo ekweyaki epai ya Akotsi ;
zeke ya mwambe ekweyaki epai ya Abiya ;
11 zeke ya libwa ekweyaki epai ya Jozue ;
zeke ya zomi ekweyaki epai ya Shekania ;
12 zeke ya zomi na moko ekweyaki epai ya Eliashibi ;
zeke ya zomi na mibale ekweyaki epai ya Yakimi ;
13 zeke ya zomi na misato ekweyaki epai ya Upa ;
zeke ya zomi na minei ekweyaki epai ya Yeshebeabi ;
14 zeke ya zomi na mitano ekweyaki epai ya Biliga ;
zeke ya zomi na motoba ekweyaki epai ya Imeri ;
15 zeke ya zomi na sambo ekweyaki epai ya Eziri ;
zeke ya zomi na mwambe ekweyaki epai ya Apitsetsi ;
16 zeke ya zomi na libwa ekweyaki epai ya Petaya ;
zeke ya tuku mibale ekweyaki epai ya Ezekieli ;
17 zeke ya tuku mibale na moko ekweyaki epai ya Yakini ;
zeke ya tuku mibale na mibale ekweyaki epai ya Gamuli ;
18 zeke ya tuku mibale na misato ekweyaki epai ya Delaya ;
zeke ya tuku mibale na minei ekweyaki epai ya Maazia.
19 Ezalaki ndenge wana nde bakabolaki bango mpe bazalaki kolandana kati na mosala mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe. Bazalaki kosala misala na bango kolanda mibeko oyo tata na bango, Aron, apesaki bango, mpe ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, atindaki ye.
Bakitani mosusu ya Levi
20 Tala bakitani mosusu ya Levi oyo bazalaki bakambi ya bituka :
 
Shubaeli, mpo na etuka ya Amirami ;
Yedeya, mpo na etuka ya Shubaeli ;
21 Yishiya, mpo na etuka ya Reabia ;
22 Shelomoti, mpo na etuka ya Yitseari ;
Yaati, mpo na etuka ya Shelomiti.
23 Bana mibali ya Ebron :
mwana ya liboso, Yeriya ;
mwana ya mibale, Amaria ;
mwana ya misato, Yaazieli ;
mpe mwana ya minei, Yekameami ;
24 Shamiri, mpo na etuka ya Mishe, mwana mobali ya Uzieli ;
25 Zakari, mpo na etuka ya Yishiya, ndeko mobali ya Mishe.
26 Bana mibali ya Merari :
Maali mpe Mushi.
Beno, mpo na etuka ya Yaaziya.
27 Bakitani ya Merari :
na nzela ya mwana na ye ya mobali Yaaziya : Beno, Shoami, Zakuri mpe Ibiri.
28 Na nzela ya mwana na ye ya mobali Maali :
Eleazari oyo atikalaki kobota te.
29 Mpo na Kishi :
Yerameeli, mwana na ye ya mobali.
30 Bana mibali ya Mushi :
Maali, Ederi mpe Yerimoti.
 
Bango wana nde bazalaki bakitani ya Levi kolanda bituka na bango.
 
31 Bango mpe babetaki zeke lokola bandeko na bango ya mibali, bakitani ya Aron, na miso ya mokonzi Davidi, ya Tsadoki, ya Ayimeleki, ya bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi. Boye bazalaki komona mabota nyonso ndenge moko, ezala libota ya kulutu to ya leki.