14
Likabo ya kosakola mpe ya koloba nkota
Boye bolukaka liboso bolingo, mpe bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, mpe mingi penza likabo ya kosakola. Pamba te moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alobaka na Nzambe kasi na bato te. Boye moto moko te asosolaka ye ; nzokande, alobaka mabombami, na bokambami ya Molimo. Kasi moto oyo asakolaka alobaka nde na bato mpo na kokolisa kondima na bango, kolendisa bango mpe kobondisa bango. Moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alendisaka kaka kondima na ye moko, kasi moto oyo asakolaka alendisaka kondima ya Lingomba mobimba. Nalingi ete bino nyonso bolobaka nkota oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi, koleka moto oyo azali koloba nkota oyo eyebani te, longola kaka soki alimboli nkota yango mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.
Bandeko na ngai, soki nayei epai na bino mpe nalobi na bino kaka na nkota oyo eyebani te, nakozala litomba nini mpo na bino soki liloba na ngai ememeli bino te ezala emoniseli, boyebi ya sika, lisakoli to malakisi ? Ezali mpe ndenge moko mpo na bibetelo mindule lokola flite to lindanda : soki ezali kobimisa te mingongo ekesana, ndenge nini tokoki kososola mongongo oyo flite to lindanda ezali kobimisa ? Bongo, soki kelelo ebimisi mongongo oyo esengeli te, nani akomibongisa mpo na etumba ? Ezali mpe ndenge moko mpo na bino : soki na minoko na bino, bozali kaka koloba makambo oyo bato bazali kososola te, ndenge nini bakoki penza koyeba makambo oyo bozali koloba ? Wana, bokoloba na pamba. 10 Kati na mokili, nkota ezali ya ndenge na ndenge, mpe lokota moko te kati na yango ezangi tina. 11 Nzokande, soki nayebi te ndimbola ya maloba ya lokota oyo moto azali koloba na ngai, nakozala lokola mopaya epai na ye, mpe ye akozala mopaya epai na ngai. 12 Yango wana, bino mpe, lokola bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, bolukaka mingi kozala na yango ebele mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.
13 Yango wana, tika ete moto oyo alobaka na nkota oyo eyebani te abondela mpo ete azwa makoki ya kolimbola maloba oyo azali koloba. 14 Pamba te soki nasambeli na nkota oyo eyebani te, molimo na ngai ekozala kosambela, kasi mayele na ngai ekosala te. 15 Boye, nasala nini ? Nakosambela na molimo na ngai, kasi nakosambela mpe na mayele na ngai ; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai. 16 Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen ! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe ? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba. 17 Ozali kozongisa matondi ya kitoko, kasi moto mosusu azali kokola te kati na kondima.
18 Nazongisaka matondi epai ya Nzambe mpo ete nalobaka nkota oyo eyebani te, koleka bino nyonso. 19 Kasi kati na Lingomba, nasepelaka koloba maloba mitano oyo bato bakoki kososola mpo na koteya bato mosusu, na esika ete naloba maloba nkoto zomi na nkota oyo eyebani te.
20 Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike ; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo. 21 Ekomama boye kati na Mobeko :
« Ekozala na nkota ya bapaya,
na nzela ya nkota oyo eyebani te
nde nakoloba na bato oyo ;
kasi atako bongo, bakoyoka ngai te, »
elobi Nkolo.
22 Yango wana, nkota oyo eyebani te ezali elembo mpo na bato oyo bazali bandimi te, kasi ezali elembo te mpo na bandimi ; nzokande lisakoli ezali elembo mpo na bandimi, kasi ezali elembo te mpo na bato oyo bazali bandimi te.
23 Soki Lingomba mobimba esangani esika moko, mpe bato nyonso bazali koloba nkota oyo eyebani te, bongo bato oyo bazali na boyebi moke to bato oyo bazali bandimi te bakoti kuna, boni, bakoloba te ete bozali na liboma ? 24 Nzokande, soki bato nyonso bazali kosakola, mpe moto oyo azali mondimi te to oyo azali na boyebi moke akoti kuna, boni, akomimona te lokola moto ya masumu ? Akomitungisa te kati na motema na ye ? 25 Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Bongo, akofukama elongi kino na mabele, akogumbamela Nzambe mpe akoloba : « Solo, Nzambe azali kati na bino. »
Mobulu te kati na losambo
26 Bandeko, toloba lisusu nini ? Tango bosanganaka esika moko, tika ete moko ayemba nzembo, mosusu ateya, mosusu ayebisa makambo oyo Nzambe amonisi ye, mosusu aloba na lokota oyo eyebani te, mpe mosusu alimbola. Nyonso wana esengeli kosalema mpo na kokolisa kondima ya Lingomba. 27 Soki bato bazali koloba na nkota oyo eyebani te, tika ete bato mibale, suka bato misato, baloba, moko sima na mosusu, mpe esengeli ete moko alimbola yango. 28 Soki moto ya kolimbola maloba yango azali te, wana tika ete ye oyo azali koloba lokota oyo eyebani te akanga monoko kati na Lingomba, mpe aloba epai na ye moko mpe epai ya Nzambe.
29 Mpo na oyo etali basakoli, tika ete mibale to misato basakola, mpe bamosusu baluka kososola malamu makambo oyo bazali koloba. 30 Soki moko kati na mayangani azwi emoniseli, wana mosusu azali koloba, moto oyo azali koloba asengeli kokanga monoko. 31 Pamba te bino nyonso bokoki na bino kosakola, kasi bosengeli kosala yango moko sima na mosusu, mpo ete bato nyonso bayekola mpe balendisama. 32 Mosakoli azali na bokonzi likolo ya molimo ya basakoli, oyo ezali kokamba ye. 33 Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia.
Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu, 34 basi basengeli te koloba kati na mayangani, pamba te bazali na ndingisa te ya koloba. Basengeli nde kotosa ndenge Mobeko etindaka. 35 Soki bazali na posa ya koyeba likambo, tika ete batunaka mibali na bango kati na ndako, pamba te ezali soni mpo na mwasi koloba kati na mayangani. 36 Boni, bokanisi ete Maloba ya Nzambe ewutaki nde epai na bino to ekomaki kaka epai na bino moko ? 37 Soki moto akanisi ete azali mosakoli to azali na likabo ya Molimo, asengeli koyeba ete makambo oyo nasili kokomela bino ezali nde Mobeko ya Nkolo. 38 Soki ayebi yango te, elingi koloba ete Nzambe mpe ayebi ye te. 39 Yango wana, bandeko na ngai, bozala na posa makasi ya likabo ya kosakola, mpe bopekisa bato te koloba nkota oyo eyebani te. 40 Kasi tika ete makambo nyonso esalema na ndenge oyo esengeli, na mobulu te.