2
Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata : Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo.
Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso ; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.
Bolingo
Tala ndenge nini tososolaka ete toyebi Nzambe : ezali mpo ete totosaka mibeko na Ye. Moto nyonso oyo alobaka : « Nayebi Nzambe, » kasi atosaka te mibeko ya Nzambe azali mokosi mpe solo ezali kati na ye te. Moto oyo atosaka Liloba na Nzambe azalaka penza na bolingo ya kokoka mpo na Nzambe kati na ye. Ezali ndenge wana nde tososolaka ete tozali moko na Ye. Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na Nzambe asengeli mpe kotambola ndenge Yesu atambolaki.
Balingami na ngai, nazali kokomela bino mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala kaka, mobeko oyo bozwaki wuta na ebandeli. Mobeko yango ya kala ezali liloba oyo boyokaki.
Nzokande, nazali mpe kokomela bino mobeko ya sika, mpe sika na yango emonani kati na Yesu mpe kati na bino, pamba te molili ezali kolimwa mpe pole ya solo esili kobanda kongenga.
Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na pole kasi ayinaka ndeko na ye, azali nanu kati na molili. 10 Moto nyonso oyo alingaka ndeko na ye azali kati na pole ; mpe ezali na eloko moko te kati na ye, oyo ekoki kobetisa ye libaku. 11 Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili ; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili esila koboma ye miso.
Bana, batata mpe bilenge
12 Bana, nazali kokomela bino, pamba te masumu na bino elimbisamaki mpo na Kombo na Yesu-Klisto. 13 Batata, nazali kokomela bino, pamba te boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nazali kokomela bino, pamba te bolongaki Satana.
14 Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana.
Koyina mokili
15 Bolingaka mokili te ; bolingaka mpe te nyonso oyo ezali kati na mokili. Moto oyo alingaka mokili azalaka na bolingo ya Tata te kati na ye, 16 pamba te nyonso oyo ezali kati na mokili, lokola baposa mabe ya nzoto, posa makasi ya konduka biloko oyo miso ezali kolula, mpe lofundu mpo na biloko ; ewuti na Tata te, kasi ewuti na mokili. 17 Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso.
Monguna ya Klisto
18 Bana, tokomi na tango ya suka ; ndenge kaka boyokaki ete monguna ya Klisto azali koya, nzokande banguna ya Klisto basili koya sik’oyo ebele, ndenge wana mpe tosengeli koyeba ete tokomi na tango ya suka. 19 Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.
20 Nzokande bino, bozali na epakolami kowuta na Molimo Mosantu, mpe bino nyonso bozali na boyebi ya nyonso. 21 Ngai nakomeli bino mpo ete boyebi yango mpe mpo ete lokuta moko te ewutaka na solo ; kasi ezali te mpo boyebi yango te.
22 Boye nani mokosi ? Mokosi azali moto oyo awangani ete Yesu azali Klisto. Mpe moto ya ndenge wana azali monguna ya Klisto : awanganaka Tata mpe Mwana. 23 Moto nyonso oyo awangani Yesu azali mpe na Tata te. Moto oyo atatoli Yesu azali mpe na Tata.
24 Kasi bino, bosimba makasi makambo oyo boyokaki wuta na ebandeli. Soki ezali penza kowumela kati na bino, bokowumela mpe kati na Mwana mpe kati na Tata. 25 Mpe tala elaka oyo apesaki biso : bomoi ya seko.
26 Nazali kokomela bino makambo oyo na tina na bato oyo bazali komeka kopengwisa bino. 27 Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.
28 Sik’oyo, bana na ngai, bowumela ya kokangama na Klisto mpo ete, na ngonga nyonso oyo akomimonisa, tozala na elikya mpe toyoka soni te na liboso na Ye tango akoya.
Kotambola lokola mwana na Nzambe
29 Boyebi malamu ete Klisto azali sembo ; boye bosengeli mpe koyeba ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo azali mwana na Nzambe.