2
Malako ya Davidi epai ya Salomo
Tango Davidi akomaki pene ya kokufa, apesaki malako oyo epai ya Salomo, mwana na ye ya mobali :
— Nalingi kokende na nzela oyo bato nyonso bakendaka. Zala makasi, lakisa ete ozali mobali. Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka : tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende ; mpe mpo ete Yawe akokisa elaka oyo apesaki ngai na maloba oyo : « Soki bakitani na yo basali keba na etamboli na bango, soki batamboli liboso na ngai na bosembo, na mitema na bango mobimba, ekozala tango nyonso na moko kati na bakitani na yo, oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele. Sik’oyo, yo moko oyebi makambo oyo Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asalaki ngai ; makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya mampinga ya Isalaele : Abineri, mwana mobali ya Neri ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri. Abomaki bango, asopaki makila ya bitumba na tango ya kimia ; boye, atiaki makila ya bitumba na mokaba oyo alataki na loketo na ye, mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye. Salela ye kolanda bwanya na yo mpe kotika te ete suki na ye ya pembe ekita na kimia na mboka ya bakufi. Kasi talisa bolamu epai ya bana mibali ya Barizilayi, moto ya Galadi ; mpe sala ete bazala kati na bato oyo bakobanda kolia mesa moko elongo na yo, pamba te basungaki ngai tango nazalaki kokima Abisalomi, ndeko na yo ya mobali. Mpe yeba ete, elongo na yo, ozali na Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya Benjame, na mboka Bawurimi, oyo alakelaki ngai mabe makasi na mokolo oyo nazalaki kokende na Maanayimi. Tango ayaki kokutana na ngai na Yordani, nalapaki ndayi oyo mpo na ye na Kombo na Yawe : ‹ Nakoboma yo na mopanga te. › Kasi sik’oyo, kozwa ye te lokola moto oyo asali mabe te. Ozali na bwanya, okoyeba nini osengeli kosala mpo na ye. Kitisa suki na ye ya pembe kati na makila, na mboka ya bakufi. »
Kufa ya Davidi
(1Ma 29.26-28)
10 Davidi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. 11 Davidi akonzaki Isalaele mibu tuku minei : mibu sambo na Ebron, mpe mibu tuku misato na misato na Yelusalemi.
12 Salomo avandaki na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ye, mpe bokonzi na ye elendisamaki.
Bakateli Adoniya etumbu ya kufa
13 Adoniya, mwana mobali ya Agite, akendeki epai ya Batisheba, mama ya Salomo. Batisheba atunaki ye :
— Boni, oyei kotala ngai na kimia ?
Azongisaki :
— Iyo, nayei na kimia.
14 Abakisaki :
— Nazali na likambo moko ya koyebisa yo.
Batisheba azongisaki :
— Okoki koloba yango.
15 Adoniya alobaki :
— Lokola oyebi yango, bokonzi ezalaki ya ngai ; bato nyonso ya Isalaele bazwaki ngai lokola mokonzi na bango, kasi makambo ebongwanaki mpe bokonzi ekeyi epai ya ndeko na ngai ya mobali, pamba te epesamelaki ye wuta na Yawe. 16 Sik’oyo, nazali na bosenga moko, kopimela ngai yango te.
Batisheba alobaki :
— Okoki koloba yango.
17 Adoniya alobaki :
— Nabondeli yo, loba na mokonzi Salomo ete apesa ngai Abishagi, moto ya Sunami, mpo ete akoma mwasi na ngai, pamba te mokonzi akoki koboya te koyokela yo.
18 Batisheba azongisaki :
— Malamu ! Ngai moko nakolobela yo epai ya mokonzi.
19 Tango Batisheba akendeki epai ya mokonzi Salomo mpo na kolobela Adoniya, mokonzi atelemaki mpo na kokutana na Batisheba, agumbamaki liboso na ye mpe avandaki na kiti na ye ya bokonzi. Asengaki ete batia kiti mpo na mama ya mokonzi, mpe Batisheba avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya mokonzi.
20 Batisheba alobaki :
— Nazali na bosenga moko ya moke mpo na koyebisa yo, kasi kopimela ngai yango te.
Mokonzi azongisaki :
— Loba na yo, mama na ngai ; nakopimela yo yango te.
21 Batisheba alobaki :
— Tika ete Abishagi, moto ya Sunami, akoma mwasi ya Adoniya, ndeko na yo ya mobali.
22 Mokonzi Salomo azongiselaki mama na ye :
— Mpo na nini ozali kosenga Abishagi, moto ya Sunami, mpo na Adoniya ? Okokaki mpe kosenga bokonzi mpo na ye, mpo ete azali yaya na ngai ; ndenge moko mpe mpo na Nganga-Nzambe Abiatari, mpo na Joabi, mwana mobali ya Tseruya !
23 Bongo, mokonzi Salomo alapaki ndayi na Kombo na Yawe :
— Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki Adoniya akufi te mpo na bosenga oyo !
24 Mpe sik’oyo, na Kombo na Yawe oyo alendisi ngai na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ngai, mpe oyo asali ete bokonzi ezala na libota na ngai ndenge alapaki yango na ndayi, Adoniya akokufa kaka lelo.
25 Mokonzi Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, kobeta Adoniya ; mpe Adoniya akufaki.
26 Mokonzi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari :
— Zonga na bilanga na yo, na Anatoti, pamba te osengeli kokufa. Kasi nakoboma yo sik’oyo te, pamba te omemaki Sanduku ya Nkolo Yawe liboso ya Davidi, tata na ngai, mpe okabolaki na ye pasi nyonso.
27 Boye, Salomo alongolaki Abiatari na mosala na ye ya Nganga-Nzambe ya Yawe, mpo na kokokisa maloba oyo Yawe alobaki na Silo na tina na libota ya Eli.
28 Tango sango ekomaki epai ya Joabi, ye oyo abundelaki Adoniya kasi Abisalomi te, akimaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe asimbaki maseke ya etumbelo. 29 Bayebisaki Salomo ete Joabi akei na Ndako ya kapo ya Yawe mpe azali pembeni ya maseke ya etumbelo. Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, ete akende koboma ye.
30 Benaya akotaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe alobaki na Joabi :
— Mokonzi alobi ete obima.
Kasi Joabi azongisaki :
— Te, nakokufela kaka awa !
Benaya azongaki epai ya mokonzi mpo na koyebisa ye eyano ya Joabi. 31 Mokonzi apesaki ye mitindo :
— Sala ndenge alobi ; boma ye mpe kunda ye. Na bongo nde okolongola likolo ya moto na ngai mpe ya libota ya tata na ngai, ngambo ya makila oyo Joabi asopaki na pamba. 32 Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye. 33 Tika ete ngambo ya makila na bango ezala mpo na libela likolo ya moto ya Joabi mpe ya bana na ye. Kasi tika ete kimia ya Yawe ezala mpo na libela na Davidi, na bana na ye, na libota na ye mpe na kiti na ye ya bokonzi.
34 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, akendeki kobeta Joabi mpe abomaki ye. Bakundaki ye na ndako na ye moko, kati na esobe. 35 Mokonzi akomisaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi, mpe atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki na esika ya Abiatari.
36 Mokonzi abengisaki Shimei mpe alobaki na ye :
— Tonga ndako kati na Yelusalemi mpe vanda kuna. Okokende esika mosusu te. 37 Mokolo oyo okobima mpe okokatisa lubwaku ya Sedron, okokufa, mpe makila na yo ekotangama na moto na yo moko.
38 Shimei azongiselaki mokonzi :
— Makambo oyo olobi ezali malamu ! Mowumbu na yo akosala ndenge mokonzi, nkolo na ngai, alobi.
Shimei avandaki na Yelusalemi mikolo ebele.
39 Kasi sima na mibu misato, bawumbu mibale kati na bawumbu ya Shimei bakimaki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maaka, mokonzi ya Gati. Bayebisaki Shimei ete bawumbu na ye bazali na Gati. 40 Tango Shimei ayokaki bongo, abongisaki ane na ye mpe akendeki epai ya Akishi, na Gati, mpo na koluka bawumbu na ye. Shimei akendeki penza na Gati mpe azongisaki bawumbu yango na Yelusalemi.
41 Bamemelaki Salomo sango ete Shimei alongwaki na Yelusalemi, akendeki na Gati mpe azongi. 42 Mokonzi abengisaki Shimei mpe alobaki na ye :
— Nalapisaki yo ndayi te na Kombo na Yawe mpe nakebisaki yo te ete mokolo oyo okobima mpo na kokende esika mosusu, okokufa penza ? Mpe na mokolo yango, olobaki na ngai : « Makambo oyo olobi ezali malamu, nakotosa. » 43 Mpo na nini okokisi te ndayi na yo epai na Yawe mpo na kotosa mitindo oyo napesaki ?
44 Mokonzi alobaki lisusu na Shimei :
— Oyebi lisusu mabe nyonso oyo osalaki epai ya Davidi, tata na ngai ! Boye, Yawe akomemisa yo ngambo ya mabe oyo yo moko osali. 45 Kasi mokonzi Salomo akopambolama, mpe kiti ya bokonzi ya Davidi ekolendisama makasi liboso ya Yawe mpo na libela.
46 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Benaya abimaki, abetaki Shimei, mpe Shimei akufaki. Bokonzi elendisamaki na maboko ya Salomo.