2
Kokola na Molimo
Yango wana, bobwaka lolenge nyonso ya mabe, ya lokuta, ya mayele mabe, ya zuwa mpe ya kotonga bato. Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko, awa bosili kososola ete Nkolo azali malamu.
Libanga ya bomoi mpe libota ya bule
Bopusana pene ya Ye oyo azali Libanga ya bomoi, Libanga oyo bato babwakaki, kasi Nzambe aponaki yango mpo ete ezali motuya mingi na miso na Ye. Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka. Pamba te Makomi eloba :
« Tala, napona libanga moko ya motuya
oyo nazali kotia kati na Siona
lokola libanga ya songe ya ndako ;
moto nyonso oyo akotiela yango motema
akotikala koyokisama soni te. »
Boye lokumu ezali mpo na bino oyo bondimaka ; kasi mpo na bato oyo bandimaka te,
« libanga oyo batongi ndako babwakaki
ekomi libanga oyo esimbi ndako,
libanga ya songe ya ndako,
mpe libanga oyo ebetisaka bato mabaku,
libanga monene oyo ekweyisaka bato. »
Bakweyaka mpo ete batosaka te Liloba na Nzambe ; mpe ebongisama nde bongo mpo na bango.
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa. 10 Na kala, bozalaki bato ya Nzambe te ; kasi sik’oyo, bokomi bato na Ye penza. Na kala, Nzambe azalaki koyokela bino mawa te ; kasi sik’oyo, akomi penza koyokela bino mawa.
Bomoi ya bonzambe kati na mokili ya masumu
Kotambola lokola basali ya Nzambe
11 Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino. 12 Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.
13 Mpo na lokumu ya Nkolo, botosaka bato nyonso oyo batiami kati na bino lokola bakonzi : mokonzi ya mboka, 14 bayangeli mpe basambisi oyo bapesameli mosala ya kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe, mpe kondima bato oyo basalaka bolamu. 15 Pamba te, Nzambe alingi boye : bosalaka bolamu mpo na kokanga minoko ya bato oyo bazangi boyebi mpe bososoli ; 16 botambolaka lokola bansomi, kasi bosalelaka bonsomi na bino te lokola vwale mpo na kozipa mabe na bino, pamba te bozali bawumbu ya Nzambe. 17 Bomemiaka bato nyonso, bolingaka bandeko na bino kati na kondima, botosaka Nzambe, mpe bopesaka mokonzi lokumu.
Bawumbu mpe bankolo na bango
18 Bawumbu, botosaka bankolo na bino na bobangi nyonso : botosaka kaka te ba-oyo bazali malamu mpe boboto, kasi mpe ba-oyo bazali matata. 19 Pamba te ezali penza ngolu mpo na moto komona pasi kaka pamba mpo atosaka Nzambe. 20 Kasi lokumu nini ezali ya komona pasi ya etumbu mpo na mabe oyo osali ? Nzokande, na miso ya Nzambe, komona pasi mpo na bolamu oyo osali ezali penza ngolu.
21 Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino ; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye. 22 Yesu atikalaki kosala lisumu ata moko te, mpe monoko na Ye etikalaki koloba lokuta te. 23 Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo. 24 Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono. 25 Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.