Bomoi ya Lingomba
2
Malako na tina na losambo
Boye liboso na nyonso, nazali kolendisa ete bosengaka na Nzambe, bosambelaka Ye, bobondelaka Ye mpo na bato mosusu mpe bozongiselaka Ye matondi mpo na bato nyonso, mpo na bakonzi mpe mpo na bakambi nyonso, mpo ete tokoka kobika bomoi ya boboto, ya kimia, ya botosi kati na makambo ya Nzambe, mpe bomoi ya bosantu. Pamba te yango nde ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso, oyo alingi ete bato nyonso babikisama mpe bayeba solo.
Solo, ezali na Nzambe kaka moko. Ndenge moko mpe ezali na Moyokanisi kaka moko kati na Nzambe mpe bato : ezali moto moko, Yesu-Klisto oyo amikabaki lokola mbeka mpo na kokangola bato nyonso. Yango nde litatoli oyo epesamaki na tango oyo abongisa. Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.
Ezaleli ya mibali mpe basi kati na Lingomba
Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te. Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi, 10 kasi balata nde misala ya malamu, misala oyo ebongi mpo na basi oyo batatolaka polele ete bagumbamelaka Nzambe.
11 Na tango ya mateya, basi basengeli kovanda nye mpe kozala na botosi. 12 Napesi te na mwasi nzela ya koteya to ya kozala na bokonzi na likolo ya mobali ; mwasi asengeli nde kovanda nye. 13 Solo Nzambe asalaki liboso Adamu, mpe sima, Eva. 14 Ezali Adamu te moto akosamaki ; ezali mwasi nde akosamaki mpe abukaki mobeko ya Nzambe, 15 kasi mwasi akobikisama na nzela ya kobota. Basi bakobikisama soki bakobi kati na kondima, kati na bolingo mpe kati na bosantu oyo ezangi lolendo.