2
Yango wana nazwaki mokano ya kozongela bino te mpo ete nayokisa bino lisusu mawa te. Pamba te soki nayokisi bino mawa, banani bakosepelisa ngai lisusu soki kaka te bino oyo ngai nayokisi mawa ?
Nakomelaki bino ndenge mpe nasali yango sik’oyo mpo ete bato oyo basengeli kosepelisa ngai bayokisa ngai mawa te tango nakoya. Nandimisami penza na tina na bino nyonso ete esengo na ngai ezali mpe esengo na bino nyonso.
Solo, tango nakomelaki bino, nazalaki kati na pasi makasi, kati na komitungisa na motema na ngai, mpe kati na kolela makasi ; ezalaki te mpo na koyokisa bino mawa, kasi mpo ete boyeba mozindo ya bolingo na ngai mpo na bino.
Kolimbisa motuki
Soki moko kati na bino ayokisaki moninga na ye mawa, ayokisaki yango ngai te kasi ayokisaki nde bino nyonso to ndambo kati na bino, mpo nalekisa ndelo te. Mpo na yango, ekokaki penza ete bato oyo baleki ebele kati na bino bapamela ye. Nzokande sik’oyo, bosengeli kolimbisa ye mpe kobondisa ye, mpo ete azala na mawa makasi te.
Yango wana, nazali kosenga na bino ete bolinga ye lisusu. Pamba te nakomelaki bino lisusu mpo na komeka bino mpe mpo na kotala soki botosaka na makambo nyonso. 10 Moto nyonso oyo bino bolimbisi, ngai mpe nalimbisi ye ; mpe likambo oyo ngai nalimbisi, soki ezalaki penza na likambo ya kolimbisa, nalimbisi yango mpo na bolamu na bino na miso ya Klisto, 11 mpo ete Satana akonza biso te, pamba te toyebi malamu makanisi na ye.
Polo amitungisaki
12 Tango nakomaki na Troasi mpo na kosakola Sango Malamu ya Klisto, Nkolo afungolelaki ngai bikuke mpo ete nakoka kosala mosala na ngai. 13 Kasi motema na ngai etikalaki kozala na kimia te mpo ete namonaki kuna te ndeko na ngai, Tito. Boye, natikaki bango mpe nakendeki na Masedwane.
Elonga ya Klisto
14 Sik’oyo, tika ete matondi ezonga epai na Nzambe oyo, mpo na bomoko na biso na Klisto, atambolisaka biso tango nyonso kati na molongo na Ye ya balongi, mpe azwaka biso lokola bisalelo na Ye mpo na kopanza boyebi ya Klisto, na bisika nyonso, lokola solo kitoko ya malasi. 15 Pamba te, mpo na Nzambe, tozali solo kitoko ya Klisto kati na bato oyo bazali na nzela ya lobiko mpe kati na ba-oyo bazali kobunga. 16 Mpo na bamoko, tozali solo ya kufa, oyo ezali komema bango na kufa ; mpe mpo na bamosusu, tozali solo ya bomoi, oyo ezali komema bango na bomoi.
Boye nani azali na makoki mpo na mosala ya lolenge oyo ? 17 Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.