2 Bakonzi
Bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele
1
Yawe asambisi mokonzi Akazia
Sima na kufa ya mokonzi Akabi, bato ya Moabi batombokelaki Isalaele. Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango :
— Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.
Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe :
— Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango : « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Mpo na yango, tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Okokita te na mbeto oyo olali, pamba te, solo, okokufa. › »
Boye Eliya akendeki.
Tango bantoma bazongaki epai ya mokonzi, atunaki bango :
— Mpo na nini bozongi ?
Bazongisaki :
— Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso : « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele ; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali ; okokufa solo. »
Mokonzi atunaki bango :
— Moto oyo ayaki kokutana na bino mpe ayebisaki bino makambo oyo azalaki ndenge nini ?
Bazongisaki :
— Azalaki mobali moko alata bilamba ya poso ya nyama na loketo na ye.
Mokonzi alobaki :
— Ezalaki kaka Eliya, moto ya Tishibe.
Mbala moko, mokonzi atindaki mokonzi ya basoda tuku mitano epai ya Eliya elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda tuku mitano akendeki epai ya Eliya oyo azalaki kovanda na songe ya ngomba mpe alobaki na ye :
— Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende epai na ye.
10 Kasi Eliya azongiselaki mokonzi yango ya basoda :
— Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo mpe bato na yo tuku mitano.
Bongo moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi yango ya basoda elongo na basoda na ye tuku mitano.
11 Mokonzi atindaki lisusu epai ya Eliya mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda alobaki na Eliya :
— Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende noki epai na ye.
12 Kasi Eliya azongiselaki mokonzi ya basoda :
— Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo elongo na bato na yo tuku mitano.
Mbala moko moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye.
13 Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye :
— Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo ! 14 Nayebi ete moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki bakonzi nyonso mibale ya basoda elongo na basoda na bango oyo bayaki liboso ; kasi sik’oyo, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya bato na ngai tuku mitano ezala na motuya na miso na yo !
15 Anjelu ya Yawe alobaki na Eliya :
— Kende na ye nzela moko ; kobanga ye te.
Bongo Eliya atelemaki mpe akendeki na ye nzela moko kino epai ya mokonzi. 16 Alobaki na mokonzi :
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »
17 Mokonzi Akazia akufaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Eliya. Lokola mokonzi Akazia azalaki na mwana te, ndeko na ye ya mobali Yorami akitanaki na ye na bokonzi na tango Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi. 18 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akazia mpe misala oyo asalaki ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.