18
Ezekiasi, mokonzi ya Yuda
Tango Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu misato na bokonzi, Ezekiasi, mwana mobali ya Akazi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
(2Ma 29.1-2; 31.1)
Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abi. » Abi azalaki mwana mwasi ya Zakari. Ezekiasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge Davidi, koko na ye, asalaki. Alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko, mpe akataki likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera. Abukaki-bukaki nyoka ya ebende oyo Moyize asalaki, pamba te kino na tango wana, bana ya Isalaele bazalaki kotumba ansa mpo na nyoka yango mpe kobenga yango « Nekushitani. »
(2Ma 31.20-21)
Ezekiasi atiaki motema na ye epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Mokonzi moko te akokanaki na ye kati na bakonzi nyonso ya Yuda, ezala liboso to sima na ye. Atikalaki ya kokangama na Yawe mpe atikaki te kolanda Ye ; abatelaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala. Atombokelaki mokonzi ya Asiri mpe aboyaki kosalela ye.
 
Alongaki bato ya Filisitia mpe alandaki bango kino na Gaza, abebisaki engumba mpe etuka na yango, mpe abotolaki bingumba batonga makasi mpe bandako milayi ya bakengeli.
Bato ya Asiri babotoli Samari
(2Ba 17.3-7)
Tango Ezekiasi akokisaki mibu minei na bokonzi, oyo ezalaki mobu ya sambo ya bokonzi ya Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, Salimanasari, mokonzi ya Asiri, abundisaki Samari mpe azingelaki yango. 10 Bato ya Asiri babotolaki Samari sima na mibu misato ya bitumba, na mobu ya motoba ya bokonzi ya Ezekiasi, oyo ezalaki mobu ya libwa ya bokonzi ya Oze, mokonzi ya Isalaele. 11 Mokonzi ya Asiri amemaki bato ya Isalaele na bowumbu na Asiri mpe atiaki bango na Ala, na ngambo ya ebale Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi. 12 Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele batosaki te Yawe, Nzambe na bango, mpe babukaki boyokani na Ye ; elingi koloba ete batosaki te makambo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, atindaki bango.
Bato ya Asiri bakoti na makasi na mokili ya Yuda
13 Tango mokonzi Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango. 14 Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki sango oyo epai ya mokonzi ya Asiri, na Lakishi : « Nasali mabe, bima na mboka na ngai ; nakofuta yo nyonso oyo okosenga ngai. »
Mokonzi ya Asiri akatelaki Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpako ya motuya ya bakilo nkoto zomi ya palata mpe bakilo nkoto moko ya wolo. 15 Ezekiasi apesaki ye palata nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi. 16 Na tango wana, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alongolaki wolo oyo asalelaki mpo na kolatisa bikuke mpe mabaya oyo esimbaka bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpe apesaki yango epai ya mokonzi ya Asiri.
Senakeribe abangisi Yelusalemi
(2Ma 32.9-19)
17 Wuta na Lakishi, mokonzi ya Asiri atindaki epai ya mokonzi Ezekiasi, na Yelusalemi, mokonzi ya mampinga na ye, mokonzi ya bakalaka ya lokumu, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, mpe mampinga ya basoda ya nguya. Tango bakomaki na Yelusalemi mpe batelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba, 18 babelelaki mokonzi. Mpe Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na bango. 19 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki na bango :
« Boloba na Ezekiasi : ‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi : ‘ Otie elikya na yo na nini ? 20 Okanisi ete maloba ya pamba ekoki kozwa esika ya mayele mpe makasi ya bitumba ? Otie penza elikya na nani mpo ete otombokela ngai ? 21 Tala, ozali nde kotia elikya na Ejipito oyo ezali lokola mwa nzete ya bambu oyo ebukana, oyo etobolaka mpe ezokisaka loboko ya moto oyo ayekamelaka yango ! Faraon, mokonzi ya Ejipito, azalaka nde bongo mpo na bato nyonso oyo batielaka ye motema ! ’ 22 Tango mosusu bokoloba na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni ! Ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Kati na Yelusalemi, bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’
23 Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri : ‘ Nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango ! 24 Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo kati na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ? 25 Boni, okanisi ete ngai nayei kobundisa mpe kobebisa esika oyo na ndingisa ya Yawe te ? Ezali Ye moko Yawe nde alobaki na ngai ete nabundisa mokili oyo mpe nabebisa yango. ’ › »
Bato ya Asiri basengi na bato ya Yuda ete bamikaba
26 Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi :
— Tobondeli yo, loba na basali na yo na lokota ya Arami, pamba te tososolaka yango ; koloba na biso na lokota ya Ebre te, noki te bato oyo bazali na likolo ya mir bakoyoka.
27 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki :
— Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino ? Te ! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino ?
28 Boye mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre :
— Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri ! 29 Tala makambo oyo mokonzi alobi : « Tika ete Ezekiasi akosa bino te, pamba te akokoka te kokangola bino na loboko na ngai ! 30 Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba : ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. › 31 Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi, mpe akomela mayi ya libulu na ye 32 liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika, mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino, mokili ya banzete ya olive mpe ya mafuta ya nzoyi. Boye, bokozala na bomoi, bokokufa te ! Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba : ‹ Yawe akokangola biso. › 33 Boni, ezali na nzambe ya ekolo songolo, oyo alonga kokangola ekolo na ye na loboko ya mokonzi ya Asiri ? 34 Wapi banzambe ya Amati mpe ya Aripadi ? Wapi banzambe ya Sefarivayimi, ya Ena, ya Iva ? Boni, balongaki kokangola Samari na loboko na ngai ? 35 Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? »
36 Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo :
— Bopesa ye eyano te !
37 Boye Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.