20
Bokono ya Ezekiasi
(2Ma 32.24-26)
Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki :
— Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »
Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe :
— Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo.
Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
Liboso ete Ezayi akoma na lopango ya monene, Yawe alobaki na ye :
— Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo ; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo. Nakokangola yo elongo na engumba oyo, wuta na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na Davidi, mosali na Ngai. › »
Ezayi alobaki :
— Bozwa liboke ya figi.
Bazwaki yango, batiaki yango na pota oyo ezalaki kokawuka te, mpe mokonzi abikaki.
Ezekiasi atunaki Ezayi :
— Elembo nini ekolakisa ngai ete Yawe akobikisa ngai, mpe ete nakokende na Tempelo ya Yawe sima na lobi ?
Ezayi azongisaki :
— Tala elembo oyo Yawe apesi yo mpo na kotalisa ete akokokisa makambo oyo alaki yo : Olingi ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi to ezonga sima na matambe zomi ?
10 Ezekiasi azongisaki :
— Ezali pasi te ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi ; zongisa yango nde na sima, na matambe zomi.
11 Bongo mosakoli Ezayi abelelaki Yawe, mpe Yawe azongisaki elilingi sima, na matambe zomi, kolanda ematelo ya Akazi.
Ezekiasi ayambi bantoma ya Babiloni
12 Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki. 13 Ezekiasi ayambaki bantoma na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso, mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango.
14 Bongo mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye :
— Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ?
Ezekiasi azongisaki :
— Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni.
15 Ezayi atunaki :
— Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ya bokonzi ?
Ezekiasi azongisaki :
— Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai ; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango.
16 Ezayi alobaki na Ezekiasi :
— Yoka liloba oyo Yawe alobi : 17 « Solo, na mikolo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo, mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni, eloko moko te ekotikala, elobi Yawe. 18 Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »
19 Ezekiasi azongiselaki Ezayi :
— Liloba na Yawe, oyo osili koloba ezali malamu.
Pamba te azalaki komilobela : « Boni, kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai ? »
(2Ma 32.32-33)
20 Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi, misala na ye nyonso ya nguya mpe ndenge asalaki liziba mpe nzela ya se ya mabele oyo amemaki mayi kino na engumba, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 21 Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.