22
Joziasi, mokonzi ya Yuda
(2Ma 34.1-2, 8-28)
Joziasi azalaki na mibu mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku misato na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yedida. » Yedida azalaki mwana ya Adaya, moto ya mboka Botsikati. Joziasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango ; apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali.
Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, atindaki Shafani, mokomi mikanda na ye, mwana mobali ya Atsalia mpe koko ya Meshulami, na Tempelo ya Yawe. Alobaki na ye :
— Kende koyebisa Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ete atanga mbongo nyonso oyo bato bamemaki na Tempelo ya Yawe mpe oyo bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe bakongolaki. Tika ete bapesa mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe mpo ete bafuta basali oyo bazali kobongisa yango : basharipantie, bangamba mpe batongi ndako. Kaka na mbongo yango, bakosomba lisusu mabaya mpe mabanga bakata mpo na kolendisa Tempelo ya Yawe. Kasi batuna bango te ndenge nini bakosalela mbongo yango, pamba te basalaka na boyengebene.
Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, alobaki na Shafani, mokomi mikanda :
— Namoni buku ya Mobeko kati na Tempelo ya Yawe.
Ilikia apesaki buku yango epai ya Shafani, mpe Shafani atangaki yango. Bongo Shafani, mokomi mikanda, akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye :
— Basali na yo bapesi mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe epai ya batambolisi misala na yango, 10 mpe Nganga-Nzambe Ilikia apesi ngai buku moko.
Mpe Shafani atangaki buku yango liboso ya mokonzi.
11 Tango mokonzi ayokaki maloba ya buku ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye 12 mpe apesaki mitindo oyo epai ya Nganga-Nzambe Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, epai ya Akibori, mwana mobali ya Mishe, epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi :
13 — Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai, mpo na bato mpe mpo na Yuda mobimba, na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana. Pamba te kanda ya Yawe, oyo epeleli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te maloba ya buku yango mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na yango.
14 Boye Nganga-Nzambe Ilikia, Ayikami, Akibori, Shafani mpe Asaya bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tikiva, koko ya Arasi, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, kati na etuka ya sika. Tango basilisaki koyebisa ye makambo, 15 Ulida alobaki na bango :
— Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boloba na tata oyo atindi bino epai na Ngai : 16 « Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda makambo nyonso oyo ekomama kati na buku oyo mokonzi ya Yuda awuti kotanga. 17 Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola Ngai na nzela ya biloko nyonso oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai epeli makasi mpo na kobebisa esika oyo, mpe ekokita te. » 18 Boloba na mokonzi ya Yuda oyo atindi bino kotuna toli ya Yawe : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na maloba oyo oyokaki : 19 Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe. 20 Mpo na yango, nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo ; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo. »
Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.