24
Bitumba ya liboso ya Babiloni
Wana Yeoyakimi azalaki mokonzi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akotaki na makasi kati na mokili ; mpe Yeoyakimi akomaki mosali na ye mibu misato. Kasi sima, abongolaki makanisi mpe atombokelaki Nabukodonozori. Yawe atindaki mampinga ya bato ya Chalide, ya Siri, ya Moabi mpe ya Amoni mpo na kobundisa ye. Yawe atindaki bango mpo na kobebisa Yuda kolanda liloba oyo Yawe asakolaki na nzela ya basali na Ye, basakoli. Solo, makambo yango ekomelaki Yuda kolanda mitindo na Yawe mpo na kolongola bango na miso na Ye likolo ya masumu ya Manase mpe likolo ya makambo nyonso oyo asalaki ; bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te ; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yeoyakimi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Tango Yeoyakimi akufaki, Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Mokonzi ya Ejipito azalaki kobima lisusu te elongo na mampinga na ye mpo na kokota na mikili mosusu, mpo ete mokonzi ya Babiloni abotolaki mabele na ye nyonso, longwa na moluka ya nor ya Ejipito kino na ebale Efrate.
Yeoyakini, mokonzi ya Yuda
(2Ma 36.9-10)
Yeoyakini azalaki na mibu zomi na mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Newushita. » Newushita azalaki mwana ya Elinatani, moto ya Yelusalemi. Yeoyakini asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge kaka tata na ye asalaki.
10 Ezalaki na tango wana nde bakonzi ya basoda ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, babundisaki Yelusalemi mpe bazingelaki engumba yango. 11 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki ye moko na engumba tango basoda na ye bazalaki kozingela yango. 12 Yeoyakini, mokonzi ya Yuda ; mama na ye, basali na ye, bakambi na ye mpe bakalaka na ye ya lokumu bamipesaki bango nyonso epai ya mokonzi Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Yeoyakini na boloko na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye. 13 Ndenge Yawe alobaki yango, Nabukodonozori azwaki bomengo nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako ya mokonzi ; bongo amemaki biloko nyonso ya wolo oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, asalaki mpo na Tempelo ya Yawe. 14 Amemaki Yelusalemi mobimba na bowumbu : bakonzi nyonso ya basoda mpe basoda, bato nyonso ya mayele ya misala ya maboko mpe ba-oyo basalelaka bibende. Bango nyonso bazalaki bato nkoto zomi. Kaka babola nde batikalaki kati na mokili. 15 Nabukodonozori amemaki Yeoyakini na bowumbu na Babiloni ; amemaki mpe, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, mama ya mokonzi, basi ya mokonzi, bakalaka ya lokumu mpe bankumu ya mokili. 16 Mokonzi ya Babiloni amemaki mpe na bowumbu na Babiloni mampinga nyonso ya bato nkoto sambo oyo bazalaki makasi mpe babongisama mpo na bitumba, bakisa bato nkoto moko oyo basalaka misala ya maboko mpe oyo basalelaka bibende.
17 Mokonzi ya Babiloni akomisaki Matania, noko ya Yeoyakini, mokonzi na esika na ye ; mpe abongolaki kombo na ye, akomisaki yango « Sedesiasi. »
Sedesiasi, mokonzi ya Yuda
(2Ma 36.11-16)
18 Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Amutali. » Amutali azalaki mwana ya Jeremi, moto ya Libina. 19 Sedesiasi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Yeoyakimi asalaki. 20 Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika ya elongi na Ye.
Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.