Mokanda ya mibale ya
Petelo
1
Ebandeli ya mokanda
Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ;
 
Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :
 
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki, na nzela ya koyeba Nzambe mpe Yesu, Nkolo na biso !
 
Nzambe abenga biso
Nzambe apesaki biso, na nzela ya nguya na Ye ya bonzambe, nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kobika bomoi ya botosi kati na makambo ya Nzambe mpe mpo na kokangama na Ye ; asalaki yango na kopesa biso boyebi ya Ye oyo abenga biso mpo ete tosangana na nkembo mpe na bolamu na Ye. Na nzela ya nkembo mpe bolamu yango, apesaki biso bilaka minene mpe ya motuya makasi mpo ete, na nzela na yango, bosangana na bonzambe mpe bokima libebi oyo baposa mabe ezali kovandisa kati na mokili.
Mpo na yango, bosala makasi mpo na kobakisa na likolo ya kondima na bino, bolamu ; na likolo ya bolamu, boyebi ; na likolo ya boyebi, komikanga ; na likolo ya komikanga, mpiko ; na likolo ya mpiko, botosi kati na makambo ya Nzambe ; na likolo ya botosi kati na makambo ya Nzambe, bondeko ya solo ; mpe na likolo ya bondeko ya solo, bolingo. Pamba te soki bozali na bizaleli oyo ya malamu kati na bino mpe botondi na yango, ekosala ete bozala basali ya goyigoyi te mpe bokola makasi na boyebi ya Nzambe na biso mpe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso. Kasi moto nyonso oyo azangi yango amonaka mosika te, azali lokola mokufi miso ; abosani ete basila kopetola ye, wuta kala, na masumu na ye. 10 Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino ; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te. 11 Na bongo, bokoyambama malamu kati na Bokonzi ya seko ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso.
Mateya oyo ebalani na bosolo
12 Boye, nakobanda kozongisaka yango tango nyonso na makanisi na bino, atako boyebi yango malamu mpe bokangami makasi na bosolo oyo bozali na yango sik’oyo. 13 Namoni ete ezali malamu mpo na ngai kolamusa makanisi na bino awa nazali nanu na bomoi kati na ndako ya kapo ya nzoto oyo ; 14 pamba te nayebi malamu ete, kala mingi te, nakokabwana na nzoto yango, ndenge Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ayebisaki ngai yango. 15 Nzokande, nakosala makasi mpo ete bozalaka tango nyonso na makoki ya kokanisaka yango, ezala nasila na ngai kokende.
16 Solo, tango toyebisaki bino makambo oyo etali koya ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, kati na nguya na yango nyonso, tolandaki te basambole oyo bato basalaka na mayele na bango, kasi na miso na biso moko, tomonaki Ye kati na kongenga nyonso ya nkembo na Ye. 17 Pamba te Nzambe Tata apesaki Ye lokumu mpe nkembo, tango mongongo kowuta na nkembo monene ya Nzambe elobaki na Ye : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. » 18 Mpe, biso moko, tango tozalaki elongo na Ye na likolo ya ngomba ya bule, toyokaki mongongo yango kowuta na Likolo.
19 Tozali lisusu kondima bosolo ya maloba ya basakoli oyo, bozali solo kosala malamu wana bozali kotia makanisi na bino kati na yango lokola na mwinda oyo ezali kopela kati na esika ya molili, kino tongo etana mpe monzoto ya tongo engenga kati na mitema na bino.
20 Liboso na nyonso, boyeba malamu ete moko te, na mayele na ye moko, akoki kolimbola maloba ya basakoli, oyo ezali kati na Makomi, 21 pamba te maloba yango ya basakoli eyaki te na nzela ya mokano ya moto, kasi ezali Molimo Mosantu nde atindikaki bato na koloba kowuta na Nzambe.