2
Davidi akomi mokonzi ya Yuda
Sima na yango, Davidi atunaki Yawe :
— Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda ?
Yawe azongisaki :
— Okoki na yo kokende.
Davidi atunaki lisusu :
— Nakende wapi ?
Yawe azongisaki :
— Kende na Ebron.
Boye Davidi akendeki kuna elongo na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe Abigayili, mwasi oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli. Davidi amemaki lisusu mibali oyo bazalaki elongo na ye, moko na moko elongo na libota na ye ; mpe bavandaki na bingumba ya Ebron mpe na bamboka na yango ya mike. Bongo bato ya Yuda bayaki na Ebron mpe bapakolaki kuna Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya libota ya Yuda.
Bayebisaki Davidi ete ezali bato ya Yabeshi ya Galadi nde bakundi Saulo. Davidi atindaki bantoma mpo na koloba na bato ya Yabeshi ya Galadi : « Tika ete Yawe apambola bino na ndenge botalisaki motema malamu epai ya nkolo na bino, Saulo, mpe na ndenge bokundaki ye ! Tika ete Yawe atalisa bino sik’oyo bolamu mpe boyengebene ! Lokola bosalaki bongo, ngai mpe nakotalisa bino bolamu yango kaka. Sik’oyo, bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te nkolo na bino, Saulo, akufi. Kasi boyeba mpe ete bato ya Yuda bapakoli ngai mafuta mpo ete nakoma mokonzi na bango. »
Etumba kati na mabota ya Davidi mpe ya Saulo
Na tango wana, Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya basoda ya Saulo, azwaki Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, mpe amemaki ye na Maanayimi. Akomisaki ye mokonzi ya Galadi, ya bato ya Ashuri mpe ya Jizireyeli, ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Isalaele mobimba. 10 Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Isalaele, mpe akonzaki mibu mibale. Kasi libota ya Yuda ekanganaki na Davidi. 11 Davidi asalaki mibu sambo na sanza motoba na Ebron lokola mokonzi ya libota ya Yuda.
12 Abineri, mwana mobali ya Neri, elongo na bato ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, babimaki wuta na Maanayimi mpo na kokende na Gabaoni. 13 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, elongo na basali ya Davidi, bango mpe babimaki mpe bakutanaki na bato ya Abineri pene ya liziba ya Gabaoni : bamoko bazalaki na ngambo moko ya liziba, mpe bamosusu, na ngambo mosusu. 14 Abineri alobaki na Joabi :
— Tika ete bilenge mibali batelema mpe babunda liboso na biso !
Joabi azongisaki :
— Malamu ! Tika ete babunda.
15 Boye, wana batelemaki mpe batangaki bango, emonanaki motango oyo : zomi na mibale mpo na libota ya Benjame mpe Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo ; mpe zomi na mibale kati na basali ya Davidi. 16 Moko na moko asimbaki monguna na ye na moto mpe atobolaki ye mopanga na mopanzi ; mpe bango nyonso bakweyaki nzela moko. Bongo babengaki esika yango ya Gabaoni : Elikati-Atsurimi* Elikati-Atsurimi elakisi : Esika ya bambeli..
17 Etumba ya mokolo wana ezalaki makasi penza. Basali ya Davidi balongaki Abineri elongo na bato ya Isalaele. 18 Bana mibali misato ya Tseruya bazalaki wana : Joabi, Abishayi mpe Asaeli. Asaeli azalaki mbangu lokola mboloko ya zamba. 19 Asaeli alandaki Abineri na molende penza mpe atikalaki kobaluka te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi. 20 Tango Abineri abalukaki mpo na kotala na sima, atunaki :
— Ezali yo Asaeli ?
Asaeli azongisaki :
— Iyo, ezali ngai.
21 Abineri alobaki na ye :
— Kende na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, bundisa moko kati na bilenge mibali mpe botola ye bibundeli.
Kasi Asaeli atikaki te kolanda ye. 22 Boye Abineri alobaki lisusu na Asaeli :
— Tika kolanda ngai ! Mpo na nini kotindika ngai na koboma yo ? Bongo ndenge nini nakotala Joabi, ndeko na yo ya mobali, na elongi ?
23 Kasi lokola Asaeli aboyaki kotika kolanda ye, Abineri atubaki Asaeli songe ya likonga na ye na libumu ; mpe likonga ebimaki ye na mokongo. Asaeli akweyaki mpe akufaki wana. Moto nyonso oyo azalaki kokoma na esika oyo Asaeli akweyaki mpe akufaki azalaki kotelema.
24 Joabi mpe Abishayi balandaki Abineri ; mpe wana moyi ezalaki kolala, bakomaki na etando ya Ama oyo etalani na Guya, na nzela oyo ekenda na esobe ya Gabaoni. 25 Bato ya Benjame basanganaki sima na Abineri, basalaki lisanga mpe batelemaki na songe ya ngomba moko ya moke. 26 Abineri abelelaki na Joabi :
— Boni, mopanga ekoba na yango koboma tango nyonso ? Oyebi te ete ekosuka mabe ? Okozela kino tango nini mpo na kopesa mitindo na bato na yo ete balanda lisusu te bandeko na bango ?
27 Joabi azongisaki :
— Na Kombo na Nzambe, soki olobaki te, bato balingaki kokoba kolanda bandeko na bango kino lobi na tongo.
28 Boye Joabi abetaki kelelo, mpe bato nyonso batelemaki, batikaki kolanda Isalaele mpe babundaki lisusu te.
29 Na butu wana nyonso, Abineri mpe bato na ye nyonso batambolaki na etando ya Araba, balekaki Yordani, bakatisaki Bitironi mobimba mpe bakomaki na Maanayimi. 30 Joabi atikaki kolanda Abineri mpe azongaki, asangisaki bato na ye nyonso : emonanaki ete bato ya Davidi zomi na libwa kaka nde bazangaki, bakisa Asaeli. 31 Kasi bato ya Davidi babomaki bato ya Benjame nkama misato na tuku motoba oyo bazalaki elongo na Abineri. 32 Bakamataki Asaeli mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, na Beteleemi. Bongo Joabi mpe bato na ye batambolaki butu mobimba mpe bakomaki na Ebron na tongo-tongo.

*2:16 Elikati-Atsurimi elakisi : Esika ya bambeli.