24
Davidi atangi bato
(1Ma 21.1-17)
Yawe asikelaki lisusu bato ya Isalaele mpe atindikaki Davidi na kosala makambo oyo ekomemisa bango ngambo ; alobaki na Davidi : « Kende kotanga motango ya bato ya Isalaele mpe ya Yuda. »
Boye, mokonzi apesaki mitindo na Joabi, mokonzi ya mampinga, oyo azalaki elongo na ye :
— Tambola na mabota nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, mpe tanga bato mpo ete nayeba motango na bango.
Kasi Joabi azongiselaki mokonzi :
— Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo ! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye ?
Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi mpe na bakonzi ya mampinga. Boye, balongwaki liboso ya mokonzi mpe bakendeki kotanga bato ya Isalaele. Bakatisaki Yordani mpe babandaki na kotanga bato ya engumba Aroeri, na sude ya engumba oyo ezali kati na lubwaku. Bakatisaki lisusu etuka ya Gadi na nzela oyo ekenda na Yaezeri. Longwa kuna, balekaki na etuka ya Galadi mpe ya Tayitimi-Odishi kino bakomaki na Dani Yaani mpe zingazinga ya Sidoni. Bakendeki na ndako batonga makasi ya Tiri mpe na bingumba nyonso ya bato ya Evi mpe ya Kanana ; bongo bakomaki na sude ya etuka ya Yuda, na Beri-Sheba. Boye batambolaki mboka mobimba, mpe bazongaki na Yelusalemi sima na basanza libwa mpe mikolo tuku mibale. Joabi ayebisaki mokonzi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato nkoto nkama mwambe kati na Isalaele, mpe nkoto nkama mitano kati na Yuda.
Yawe apesi Isalaele etumbu
10 Sima na Davidi kotanga bato, asosolaki ete amemi ngambo. Bongo Davidi alobaki na Yawe :
— Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, oh Yawe, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.
11 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, tango Davidi alamukaki, Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya mokonzi :
12 — Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »
13 Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye :
— Oponi etumbu nini mpo ete Ngai Yawe nakokisa yango mpo na yo : mibu sambo ya nzala makasi kati na mokili na yo ; sanza misato oyo okokima liboso ya banguna na yo, oyo bakolanda yo ; to mikolo misato ya bokono oyo ebomaka kati na mokili na yo ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai.
14 Davidi azongiselaki Gadi :
— Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato.
15 Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, wuta na tongo kaka wana kino na ngonga oyo akataki ; mpe longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bato nkoto tuku sambo bakufaki. 16 Lokola anjelu atandaki loboko na ye na likolo ya Yelusalemi mpo na kobebisa yango, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! »
Nzokande, na tango wana, anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orina, moto ya Yebusi, kati na likolo mpe mabele, mpe asimbaki mopanga ezanga ebombelo.
17 Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! »
Davidi atongi etumbelo mpo na Yawe
(1Ma 21.18-26)
18 Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye :
— Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orina, moto ya Yebusi.
19 Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe. 20 Tango Orina atalaki mpe amonaki mokonzi elongo na bakalaka na ye koya epai na ye, abimaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na mabele. 21 Orina atunaki mokonzi :
— Mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, ayei epai ya mosali na ye ?
Davidi azongisaki :
— Nayei kosomba etando oyo mpo ete natonga awa etumbelo mpo na Yawe ; na bongo, bokono oyo ezali koboma bato ekosila.
22 Orina azongiselaki Davidi :
— Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, akamata na ye lopango yango mpe abonza kuna mbeka oyo amoni ete ezali malamu mpo na Yawe. Tala bangombe ya mibali oyo ekosunga mpo na mbeka ya kotumba, mabaya ya bashario mpe bikangiseli oyo ekosunga mpo na kopelisa moto. 23 Oh mokonzi, napesi yo nyonso ! Orina alobaki lisusu na mokonzi :
— Tika ete Yawe, Nzambe na yo, ayamba malamu bambeka na yo !
24 Kasi mokonzi alobaki na Orina :
— Te ! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango ; naboyi kobonzela Yawe, Nzambe na ngai, bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele.
Boye, Davidi asombaki etando mpe bangombe yango, na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano.
25 Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.