4
Petelo mpe Yoane liboso ya Likita-Monene
Wana Petelo mpe Yoane bazalaki nanu koloba na bato, Banganga-Nzambe, mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe Basaduseo bayaki, na kanda makasi ndenge bamonaki bantoma koteya bato mpe kotatola ete bakufi bakosekwa ndenge Yesu asekwaki. Bakangaki Petelo mpe Yoane, bongo babwakaki bango na boloko kino na mokolo oyo elandaki, pamba te pokwa esilaki kokoma. Kasi kati na bato oyo bayokaki mateya, mingi bandimaki yango ; bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano.
Boye, mokolo oyo elandaki, bakonzi ya Bayuda, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko basanganaki na Yelusalemi. Ana, mokonzi ya Banganga-Nzambe, azalaki wana elongo na Kayifa, Yoane, Alekizandre mpe bato mosusu ya libota ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Bamemaki Petelo mpe Yoane liboso na bango, mpe bakomaki kotuna bango mituna :
— Bozali kosala makambo oyo na nguya nini to na kombo ya nani ?
Bongo, Petelo oyo atondisamaki na Molimo Mosantu alobaki na bango :
— Bakonzi mpe bakambi ya bato ! Lokola botuni biso lelo na tina na bolamu oyo esalemi epai ya mokufi makolo mpe ndenge nini asili kobika, 10 tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono ; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi. 11 Ye nde azali « libanga oyo bino, batongi ndako, bobwakaki, kasi ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba. »
12 Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.
13 Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu. 14 Kasi, lokola bazalaki komona moto oyo abikisamaki atelemi elongo na bango, bazalaki ata na liloba moko te ya koloba.
15 Bongo, bapesaki mitindo ete babimisa bango na Likita-Monene ; mpe batikalaki bango moko mpo na koyekola likambo yango malamu. 16 Bazalaki kotunana :
— Tosala penza nini na bato oyo ? Pamba te bavandi nyonso ya Yelusalemi bayebi malamu ete bango nde basalaki likamwisi wana ya monene ; tokoki kowangana yango te. 17 Kasi, mpo ete sango ya likambo oyo ekoba te kopanzana kati na bato, tokebisa bango boye : « Bomeka lisusu te koloba na Kombo na Yesu, ezala ata na nani ! »
18 Bongo, babengaki Petelo elongo na Yoane mpe bapekisaki bango ete bameka lisusu te koloba to koteya na Kombo na Yesu, ezala ata na lolenge nini. 19 Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango :
— Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ? 20 Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki !
21 Sima na kogangela bango, batikaki bango mpo ete bakende, pamba te bamonaki te ndenge nini bakokaki kopesa bango etumbu, mpo ete bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe mpo na likambo oyo esalemaki. 22 Pamba te moto oyo abikaki na ndenge ya kokamwa azalaki na mibu koleka tuku minei.
Bandimi babondeli
23 Tango batikaki bango, Petelo mpe Yoane bakendeki koyebisa baninga na bango makambo nyonso oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi balobelaki bango. 24 Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe ; balobaki :
— Nkolo Yawe, Yo nde okela Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; 25 Yo nde olobaki na nzela ya Molimo Mosantu, na monoko ya koko na biso, Davidi, mosali na yo :
« Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele,
mpe bato bazali kosala makita ya pamba ?
26 Bakonzi ya mokili batomboki,
mpe bakambi basangani
mpo na kotelemela Nkolo mpe Mopakolami na Ye. »
27 Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa. 28 Ezali ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala, na nguya mpe na mokano na Yo. 29 Sik’oyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na Yo makasi ya koteya Liloba na Yo na molende nyonso. 30 Boye, sembola loboko na Yo mpo na kobikisa babeli, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene, na Kombo na Yesu, Mosali na Yo, Mosantu.
31 Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki ; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso.
Bandimi batie biloko na bango esika moko
32 Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso. 33 Bantoma bakobaki kotatola lisekwa ya Nkolo Yesu na nguya monene, mpe ngolu monene ezalaki na bango nyonso. 34 Moko te kati na bango akelelaki ; pamba te bato oyo bazalaki na mabele to na bandako bazalaki koteka yango, bazalaki komema mbongo oyo batekelaki 35 mpe kotia yango na makolo ya bantoma. Bantoma bazalaki kokabola yango na moto na moto, kolanda bosenga na ye.
36 Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga Shipre mpe bantoma bapesaki ye kombo mosusu, Barnabasi oyo elakisi « molendisi, » 37 atekaki mpe elanga na ye mpe amemaki mbongo epai ya bantoma.