8
BATATOLI KATI NA YUDA MPE SAMARI
Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni.
Lingomba enyokolami mpe epalangani
Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi ; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma. Bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe bakundaki Etieni mpe balelaki ye mingi. Kasi Saulo akomaki koluka kopanza Lingomba ; azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.
Filipo kati na Samari
Bandimi oyo bapalanganaki bazalaki koteya Liloba na Nzambe bisika nyonso bazalaki kokende. Filipo akendeki na engumba moko ya Samari mpe, kuna, ateyaki Klisto. Bongo tango ebele ya bato bayokaki mpe bamonaki bikamwa oyo asalaki, bakangamaki na makambo oyo Filipo azalaki koloba. Pamba te milimo ya mbindo ezalaki kobima kati na bato mingi na koganga makasi, mpe bato mingi oyo bakufa makolo mpe oyo batambolaka tengu-tengu babikaki. Boye, bato ya engumba yango batondisamaki na esengo makasi.
Nzokande, wuta kala, kati na engumba yango, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Simona. » Azalaki kosala misala ya maji. Azalaki kokamwisa bato ya Samari mpe komimona moto monene. 10 Bato nyonso, kobanda na bana mike kino na mikolo, bayokaki ye na bokebi mpe balobaki : « Moto oyo, azali penza nguya ya Nzambe, nguya oyo babengaka : Nguya monene. » 11 Bazalaki kolanda ye mpo ete, wuta kala, azalaki kokamwisa bango na misala na ye ya maji. 12 Kasi tango bandimaki Sango Malamu oyo Filipo ateyaki na tina na Bokonzi ya Nzambe mpe na tina na Kombo na Yesu-Klisto, mibali mpe basi bazwaki libatisi. 13 Simona mpe andimaki mpe azwaki libatisi ; azalaki kolanda Filipo bisika nyonso oyo azalaki kokende, mpe azalaki kokamwa bilembo minene mpe bikamwa oyo ezalaki kosalema na miso na ye.
14 Tango bantoma, kati na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba na Nzambe, batindelaki bango Petelo mpe Yoane. 15 Tango bakomaki kuna, basambelaki mpo na bandimi ya sika mpo ete bazwa Molimo Mosantu, 16 pamba te Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moto moko te kati na bango ; bazwaki kaka libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu. 17 Bongo, Petelo mpe Yoane batielaki bango maboko, mpe bazwaki Molimo Mosantu.
18 Tango Simona amonaki ete bato oyo bandimaki bazwaki Molimo Mosantu, wana bantoma batielaki bango maboko, apesaki Petelo mpe Yoane mbongo ; 19 mpe alobaki :
— Bopesa ngai mpe nguya oyo, mpo ete moto nyonso oyo nakotiela maboko akoka kozwa Molimo Mosantu.
20 Kasi Petelo azongiselaki ye :
— Mpo ete okanisi ete okoki kosomba likabo ya Nzambe na nzela ya mbongo, tika ete yo mpe mbongo na yo bokufa ! 21 Solo, ozali na libula te to na makoki te kati na lotomo oyo, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe. 22 Boye, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo ete alimbisa yo, soki ekoki kosalema, mpo na makanisi oyo ozalaki na yango kati na motema na yo. 23 Pamba te namoni ete motema na yo etondi na zuwa mpe ozali mowumbu ya masumu.
24 Simona azongisaki :
— Bobondela Nkolo mpo na ngai mpo ete, kati na oyo bowuti koloba, eloko moko te ekomela ngai.
25 Sima na bango kotatola mpe kosakola Liloba na Nkolo, Petelo mpe Yoane bazongaki na Yelusalemi ; na nzela, bazalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka ebele ya Samari.
Filipo mpe soda ya Etiopi oyo baboma mokongo
26 Anjelu ya Nkolo alobaki na Filipo :
— Telema, kende na sude, na nzela ya esobe, nzela oyo ewuta na Yelusalemi mpe ekenda kino na Gaza.
27 Boye, Filipo atelemaki mpe akendeki ; na nzela, akutanaki na soda moko oyo baboma mokongo, moto ya mboka Etiopi ; azalaki kalaka moko ya lokumu mpe azalaki na mokumba ya kobatela bomengo nyonso ya Kandase, mwasi mokonzi ya Etiopi. Moto yango ayaki na Yelusalemi mpo na kogumbamela ; 28 bongo wana azalaki kozonga na mboka na ye, azalaki ya kovanda kati na shar na ye mpe azalaki kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi.
29 Molimo alobaki na Filipo :
— Kende mpe pusana pene ya shar wana.
30 Filipo akendeki mbangu pene ya shar yango mpe ayokaki ye kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. Filipo atunaki ye :
— Boni, ozali kososola makambo oyo ozali kotanga ?
31 Azongisaki :
— Nakososola ndenge nini soki moto alimboleli ngai yango te ?
Boye abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.
32 Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga :
« Lokola mpate oyo bazali komema
na esika oyo babomelaka banyama,
lokola meme liboso ya moto
oyo azali kolongola yango bapwale,
afungolaki monoko na ye te.
33 Basambwisaki ye mpe baboyaki kolongisa ye.
Nani akoyebisa bakitani na ye ?
Pamba te balongoli bomoi na ye na mokili. »
34 Bongo, soda oyo baboma nzoto ya mibali atunaki Filipo :
— Nabondeli yo, yebisa ngai : mosakoli azali koloba makambo oyo na tina na nani ? Azali koloba yango na tina na ye moko to na tina na moto mosusu ?
35 Filipo azwaki maloba mpe, na nzela ya eteni yango ya Makomi, ateyaki ye Sango Malamu ya Yesu.
36 Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki :
— Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi ?
[ 37 Filipo alobaki :
— Soki kaka ondimi wuta na motema na yo mobimba, okoki na yo kozwa libatisi.
Moto yango azongisaki :
— Nandimi ete Yesu-Klisto azali Mwana na Nzambe !]* Eteni oyo ezali te kati na mikanda mingi ya kala.
38 Mbala moko, apesaki mitindo ete batelemisa shar. Bongo bango mibale, Filipo mpe soda oyo baboma mokongo, bakitaki na mayi, mpe Filipo abatisaki ye. 39 Tango babimaki na mayi, Molimo ya Nkolo alongolaki Filipo, mpe soda oyo baboma mokongo amonaki ye lisusu te, kasi akobaki mobembo na ye na esengo. 40 Nzokande, Filipo amonanaki na Azoti ; mpe longwa kuna, akendeki na Sezarea, wana azalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka nyonso epai wapi azalaki kolekela.

*8:37 Eteni oyo ezali te kati na mikanda mingi ya kala.