10
Emoniseli ya Kornei
Na Sezarea, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Kornei ; » azalaki mokonzi ya basoda oyo babengamaka « mampinga ya Itali. » Kornei elongo na bato nyonso ya libota na ye bazalaki komipesa na makambo ya Nzambe mpe kotosa Nzambe ; azalaki kosunga bato oyo bazalaki kati na bosenga ya ndenge na ndenge mpe kosambela Nzambe tango nyonso. Mokolo moko, na ngonga pene ya misato sima na midi, azwaki emoniseli ; amonaki na polele anjelu moko ya Nzambe koya epai na ye mpe koloba na ye :
— Kornei !
Kornei atalaki ye na somo mpe atunaki :
— Nkolo, likambo nini ?
Anjelu azongisaki :
— Mabondeli na yo mpe masungi oyo opesaka epai ya babola emati liboso ya Nzambe, mpe akanisi yango. Sik’oyo, tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali « Petelo ; » azali kovanda lokola mopaya kati na ndako ya Simona, mobongisi baposo ya banyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene.
Tango kaka anjelu oyo asololaki na ye akendeki, Kornei abengaki basali mibale kati na basali na ye, mpe soda moko oyo azalaki komipesa na makambo ya Nzambe, kati na basoda oyo bazalaki kosalela ye. Ayebisaki bango makambo nyonso oyo ekomelaki ye mpe atindaki bango na Jafa.
Petelo azwi emoniseli
Mokolo oyo elandaki, na ngonga pene ya midi, wana bato oyo Kornei atindaki bazalaki nanu na nzela mpe bakomaki pene ya Jafa, Petelo amataki na veranda oyo ezalaki na likolo ya ndako mpo na kosambela. 10 Ayokaki nzala mpe azalaki na posa ya kolia, mpe wana bazalaki nanu kobongisela ye bilei, akweyaki na Molimo. 11 Amonaki Likolo efungwami, mpe eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei ezali kokita na mabele. 12 Kati na yango, ezalaki na lolenge nyonso ya banyama ya mabele, oyo ezali na makolo minei ; ya banyama oyo etambolaka na libumu mpe ya bandeke ya likolo. 13 Bongo mongongo moko elobaki na ye :
— Petelo, telema. Boma mpe lia.
14 Petelo azongisaki :
— Te, Nkolo ! Natikala nanu kolia te eloko ya mbindo to ya bosoto.
15 Mongongo yango elobaki na ye, mpo na mbala ya mibale :
— Eloko nyonso oyo Nzambe akomisi peto, yo, komona yango mbindo te !
16 Esalemaki bongo mbala misato, mpe eloko yango elimwaki kati na Likolo.
17 Petelo akamwaki mingi mpe akomaki komituna ndimbola ya emoniseli oyo awuti kozwa. Kaka na tango yango, batindami ya Kornei bamonaki ndako ya Simona, oyo bazalaki koluka, mpe batelemaki na ekuke. 18 Babelelaki mpe batunaki soki ezali kuna nde Simona avandaka, Simona oyo kombo na ye mosusu ezali « Petelo. »
19 Wana Petelo azalaki kaka komitungisa mpo na emoniseli oyo awuti kozwa, Molimo alobaki na ye :
— Simona, bato misato bazali koluka yo. 20 Telema mpe kita. Kende elongo na bango, kotia tembe te, pamba te ngai nde natindi bango.
21 Petelo akitaki mpe alobaki na bato yango :
— Ngai oyo ! Ezali ngai nde bozali koluka. Boyei mpo na nini ?
22 Bato yango bazongisaki :
— Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda ; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.
23 Petelo akotisaki bango na ndako mpe apesaki bango esika ya kolala.
Petelo atatoli Yesu-Klisto epai ya Bapagano
Mokolo oyo elandaki, Petelo akendeki elongo na bango, mpe ndambo ya bandimi balandaki ye wuta na Jafa. 24 Sima na mokolo moko, bakomaki na Sezarea. Kornei azalaki kozela bango, mpe abengisaki bato ya libota na ye mpe balingami na ye mpo ete bazala lisanga. 25 Tango Petelo alingaki kokota na ndako, Kornei apusanaki pene na ye, amibwakaki na makolo na ye mpo na kogumbamela ye. 26 Kasi Petelo atelemisaki ye ; alobaki :
— Telema ! Ngai mpe nazali kaka moto.
27 Wana bazalaki kosolola, Petelo akotaki na ndako mpe akutaki bato ebele basangani. 28 Alobaki na bango :
— Boyebi malamu ete mibeko na biso epekisa Moyuda kosangana na Mopagano to kokende kotala Mopagano ; kasi Nzambe alakisi ngai ete nasengeli te komona moto moko mbindo to bosoto. 29 Yango wana, tango botindaki bato kobenga ngai, natunaki ata motuna moko te mpo na koya. Sik’oyo, nakoki koyeba tina nini bobengeli ngai ?
30 Kornei azongisaki :
— Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima na midi, nazalaki kosambela kati na ndako na ngai. Mbala moko, moto moko alata bilamba ya kongenga makasi atelemaki liboso na ngai 31 mpe alobaki : « Kornei, Nzambe ayoki mabondeli na yo mpe akanisi masungi oyo opesaka epai ya babola. 32 Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo ; azali kovanda lokola mopaya kati na ndako ya Simona, mobongisi baposo ya banyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene. »
33 Yango wana, natindaki bato noki-noki epai na yo, mpe osali malamu ndenge oyei. Sik’oyo, biso nyonso tozali awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka nyonso oyo Nkolo atindi yo koyebisa biso.
34 Petelo azwaki maloba mpe alobaki :
— Sik’oyo, nasosoli solo ete Nzambe atalaka bilongi te, 35 kasi andimaka bato ya bikolo nyonso, oyo batosaka Ye mpe basalaka makambo ya sembo. 36 Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso. 37 Boyebi makambo oyo esalemaki na Yuda mobimba, kobanda na Galile, sima na libatisi oyo Yoane ateyaki : 38 ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.
39 Biso, tozali batatoli ya makambo nyonso oyo Yesu asalaki kati na mokili ya Bayuda mpe kati na Yelusalemi. Babomaki Ye mpe babakaki Ye na ekulusu, 40 kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, na mokolo ya misato, mpe asalaki ete amonana lisusu. 41 Amonanaki na bato nyonso te, kasi na batatoli oyo Nzambe apona wuta kala, na biso oyo toliaki mpe tomelaki elongo na Ye, sima na Ye kosekwa kati na bakufi. 42 Apesaki biso mitindo ya koteya bato mpe kotatola ete Ye nde Nzambe apona lokola Mosambisi ya bato ya bomoi mpe bakufi. 43 Basakoli nyonso batatolaki na tina na Ye ete moto nyonso oyo akondimela Ye akozwa bolimbisi ya masumu na nzela ya Kombo na Ye.
Bato ya bikolo ya bapaya bazwi Molimo
44 Wana Petelo azalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bato nyonso oyo bazalaki koyoka Liloba. 45 Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya. 46 Pamba te bayokaki bango koloba na nkota mosusu mpe kokumisa Nzambe.
Bongo Petelo alobaki :
47 — Solo, moto moko te akoki koboya ete bazwa libatisi ya mayi. Bazwi Molimo Mosantu ndenge kaka biso tozwaki.
48 Boye, Petelo apesaki mitindo ete babatisa bango na Kombo na Yesu-Klisto. Bongo, basengaki na Petelo ete avanda elongo na bango mpo na mwa mikolo.