19
Polo kati na Efeso
Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli mpe atunaki bango :
— Boni, bozwaki Molimo Mosantu tango bokomaki bandimi ?
Bazongisaki :
— Te ! Totikala nanu koyoka te ete Molimo Mosantu azalaka.
Polo atunaki bango lisusu :
— Bongo libatisi ya ndenge nini penza bozwaki ?
Bazongisaki :
— Tozwaki libatisi ya Yoane.
Polo alobaki na bango :
— Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki libatisi ya kobongola motema ; azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu.
Boye, bayokelaki ye mpe bazwaki libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu. Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na nkota ya sika mpe kosakola. Bango nyonso bazalaki bato pene zomi na mibale.
Bongo, Polo akendeki na ndako ya mayangani epai wapi, na basanza misato, azalaki koloba na molende epai na bato ; azalaki koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe mpe kondimisa bango yango. Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga ; baboyaki kondima mpe batiolaki nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Bongo Polo akabwanaki na bango. Amemaki bayekoli mpe, mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya Tiranisi. 10 Esalaki bongo mibu mibale ; boye Bayuda nyonso mpe bato nyonso ya Grese, oyo bazalaki kovanda na mokili ya Azia bayokaki Liloba na Nkolo.
11 Nzambe azalaki kosala bikamwa ya somo na nzela ya Polo. 12 Boye bato bakomaki kokamata miswale mpe bilamba oyo etuti nzoto ya Polo, mpo na kotia yango na banzoto ya babeli, bongo bokono ya bato yango ezalaki kosila, mpe milimo mabe ezalaki kobima kati na bango.
13 Ndambo ya Bayuda oyo bazalaki kotambola-tambola mpo na kobengana milimo mabe bamekaki kobelela Kombo ya Nkolo Yesu mpo na koluka kokangola bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe ; bazalaki koloba :
— Na Kombo ya Yesu oyo Polo ateyaka, napesi bino mitindo ya kobima.
14 Bana mibali sambo ya Moyuda Seva, moko kati na bakonzi ya Banganga-Nzambe, bazalaki kosala bongo. 15 Mokolo moko, molimo mabe ezongiselaki bango :
— Nayebi Yesu, nayebi mpe soki Polo azali nani ; kasi bino, bozali banani ?
16 Mpe moto oyo azalaki na molimo mabe apumbwelaki bango, akangaki bango mpe abetaki bango nyonso makasi penza kino babimaki na ndako bolumbu mpe batonda na bapota.
17 Tango likambo yango eyebanaki na Bayuda mpe na bato ya Grese oyo bavandaka na Efeso, somo ekangaki bango nyonso, mpe Kombo ya Nkolo Yesu ezwaki lokumu mingi. 18 Mingi kati na bato oyo bakomaki bandimi bazalaki koya kondima mpe kotubela polele misala na bango ya mabe. 19 Mpe bato mingi ya maji bamemaki babuku na bango mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso. Tango balukaki koyeba motuya ya babuku yango, emonanaki ete ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende nkoto tuku mitano. 20 Ezali ndenge wana nde Liloba na Nkolo ezalaki kokoba kopanzana mpe komonana ete etonda na nguya ya Nzambe.
Mobulu kati na Efeso
21 Sima na makambo oyo nyonso, Polo, na bokambami ya Molimo, azwaki mokano ya kolekela na Masedwane mpe na Akayi mpo na kokende na Yelusalemi. Alobaki :
— Soki nalongwe kuna, nakokende lisusu na Rome.
22 Atindaki na Masedwane, mibale kati na basungi na ye ya mosala, Timote mpe Erasite, wana ye moko atikalaki mwa mikolo na Azia.
23 Ezalaki na tango wana nde mobulu makasi esalemaki na Efeso na tina na Nzela ya Nkolo. 24 Demetriusi, mosali ya babiju, azalaki kosala na palata bililingi ya batempelo ya nzambe Artemisi. Na mosala yango, azalaki kofuta basali na ye mbongo mingi. 25 Asangisaki bango elongo na bato ya misala ya maboko, oyo basalaka mosala moko na ye, mpe alobaki na bango :
— Baninga na ngai, boyebi malamu ete mosala oyo efutaka biso malamu. 26 Nzokande, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato mpe kobenda sima na ye bato ebele awa kaka na Efeso te, kasi mpe na etuka mobimba ya Azia ; azali koloba ete banzambe oyo esalemi na maboko ya bato ezali banzambe te. 27 Makambo oyo Polo azali kosala ezali koluka kaka te kobebisa lokumu ya mosala na biso, kasi ezali mpe kosilisa lokumu ya tempelo ya Artemisi, nzambe monene ya mwasi ; ezali lisusu kosilisa nkembo ya Artemisi oyo Azia mobimba mpe mokili mobimba ezali kogumbamela.
28 Tango kaka bayokaki bongo, basilikaki makasi mpe bakomaki koganga :
— Artemisi ya Efeso azali monene !
29 Mbala moko, mobulu ekotaki kati na engumba mobimba. Bakangaki Gayusi mpe Arisitarke, bato mibale ya Masedwane, oyo bazalaki kotambola elongo na Polo ; mpe bato nyonso bakendeki na lombangu na ndako ya masano. 30 Polo azalaki na posa ya kobima na miso ya bato, kasi bayekoli bapekisaki ye. 31 Ezala mpe baninga na ye, oyo bazalaki bakambi ya etuka, batindelaki ye maloba mpo na kosenga na ye ete ameka te kosala liseki ya kokende na ndako ya masano.
32 Mobulu makasi ekotaki kati na ebele ya bato : bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe bamosusu, mpo na likambo mosusu. Mingi kati na bango bazalaki koyeba te tina nini basangani wana. 33 Bayuda kati na ebele ya bato batindikaki Alekizandre na liboso, mpe batalisaki ye likambo yango ndenge ezali. Bongo Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi kozwa maloba mpo na kotalisa na bato. 34 Kasi tango basosolaki ete azali Moyuda, bango nyonso basalaki pene bangonga mibale ya koganga lokola moto moko :
— Artemisi ya Efeso azali monene !
35 Suka na suka, mokomi mikanda ya engumba alongaki kopekisa makelele ya bato ; alobaki :
— Bato ya Efeso ! Nani kati na mokili oyo ayebi te ete engumba ya Efeso ezali engumba mosantu ya Artemisi, nzambe mwasi monene, mpe ya ekeko na ye oyo ekita wuta na likolo ? 36 Yango wana, lokola moko te akoki kotia tembe na likambo oyo, bovanda kimia mpe bosala makambo ya bozoba te. 37 Bato oyo bomemi awa babebisi ndako ya nzambe na biso te mpe bafingi ye te. 38 Soki Demetriusi mpe basali na ye bazwi moto likambo, esambiselo ezali, basambisi mpe bazali. Ebongi malamu ete bakende kofunda. 39 Mpe soki bozali na likambo mosusu ya koloba, tokoyekola yango malamu kati na mayangani oyo mibeko epesa ndingisa. 40 Soki tokebi te, bakoki kofunda biso ete botombokisi bato, mpo na makambo oyo esalemi lelo. Na bongo, tokolonga te kolimbola tina oyo bato basangani awa.
Tango kaka asilisaki koloba, apesaki mitindo ete bato bapanzana.