22
— Bandeko mpe batata, boyoka sik’oyo ndenge nini nalingi komilongisa.
Tango bayokaki Polo koloba na lokota ya Arami, bavandaki lisusu kimia koleka.
Bongo, Polo alobaki :
— Nazali Moyuda, nabotama na Tarse kati na Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamalieli nde azalaki molakisi na ngai ; ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Nazalaki na bolingo makasi mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo. Nanyokolaki bato oyo bazalaki kolanda Nzela oyo kino koboma bango, nazalaki kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko. Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe lisanga mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Boye, nakendeki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.
Wana nazalaki na nzela mpe nakomaki pene ya Damasi, na ngonga pene ya midi, namonaki mbala moko pole makasi kowuta na Likolo mpe kongengela ngai. Nakweyaki na mabele mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai : « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ? » Natunaki : « Nkolo, yo nani ? »
Alobaki na ngai : « Nazali Yesu ya Nazareti, oyo yo ozali konyokola. »
Bato oyo bazalaki na ngai elongo bamonaki pole yango, kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki koloba na ngai. 10 Natunaki : « Nkolo, nasala nini ? » Nkolo alobaki na ngai : « Telema, kende na Damasi ; kuna, bakoyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli kosala. »
11 Baninga na ngai basimbaki ngai na loboko mpe bamemaki ngai kino na Damasi, pamba te kongenga ya pole wana ebomaki ngai miso.
12 Ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Azalaki kotosa makambo ya Nzambe ndenge Mobeko ezalaki kotinda, mpe azalaki na lokumu mingi na miso ya Bayuda nyonso ya engumba wana. 13 Ayaki kokutana na ngai mpe alobaki : « Ndeko na ngai, Saulo, mona lisusu. »
Mpe kaka na tango yango, nazwaki lisusu makoki ya komona mpe namonaki ye. 14 Bongo alobaki na ngai : « Nzambe ya bakoko na biso apona yo wuta kala mpo ete oyeba mokano na Ye, omona Moto na sembo mpe oyoka mongongo na Ye. 15 Okozala motatoli na Ye liboso ya bato nyonso, mpo na koyebisa bango makambo nyonso oyo osili komona mpe koyoka. 16 Mpo na nini ozali kolekisa tango ? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo. »
17 Sima na ngai kozonga na Yelusalemi, wana nazalaki kosambela na Tempelo, nakweyaki na Molimo 18 mpe nayokaki Nkolo koloba na ngai : « Sala noki, bima na Yelusalemi, pamba te bato na yango bakondima te litatoli oyo okoloba na tina na Ngai. »
19 Nazongisaki : « Nkolo, bato wana bayebi malamu ete nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kobwaka na boloko mpe kobetisa fimbu, bato oyo bazalaki kondimela Yo. 20 Tango basopaki makila ya Etieni, motatoli na Yo, ngai mpe nazalaki wana, nandimaki makambo oyo esalemaki mpe nazalaki kokengela bilamba ya bato oyo babomaki ye. »
21 Kasi Nkolo azongiselaki ngai : « Kende, nakotinda yo mosika, epai ya bato ya bikolo ya bapaya. »
Polo kati na boloko
22 Bato bayokaki Polo kino tango alobaki maloba wana. Boye, batombolaki mingongo na bango mpe bagangaki :
— Bolongola ye na mokili ! Asengeli te kozala na bomoi !
23 Lokola bazalaki koganga makasi mpe kobwaka bilamba na bango mpe putulu na likolo, 24 mokonzi ya basoda apesaki mitindo ete bakotisa Polo kati na lopango ya basoda mpe babeta ye fimbu, mpo ete aloba polele tina nini Bayuda bazali koganga bongo mpo na ye. 25 Wana bazalaki kokanga Polo basinga, Polo atunaki mokonzi oyo azalaki wana :
— Boni, mibeko epesi penza ndingisa ya kobeta moto ya Rome fimbu, wana bosambisi ye nanu te ?
26 Tango mokonzi ayokaki bongo, akendeki koyebisa mokonzi ya basoda :
— Okosala nini ? Tata oyo azali moto ya Rome.
27 Mbala moko, mokonzi ya basoda akendeki epai ya Polo mpe atunaki ye :
— Yebisa ngai solo, ozali penza moto ya Rome ?
Azongisaki :
— Iyo, ezali bongo !
28 Mokonzi ya basoda alobaki :
— Nafutaki mbongo mingi mpo na kozwa makoki ya kokoma moto ya Rome.
Polo azongisaki :
— Kasi ngai, nazali moto ya Rome ya kobotama.
29 Mbala moko, bato oyo balingaki kobeta ye fimbu batikaki ye. Mokonzi ya basoda akomaki kobanga tango asosolaki ete tata oyo ye akangaki minyololo azali penza moto ya Rome.
30 Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo ; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango.