4
Bino bankolo, bosungaka bawumbu na bino na nzela ya biloko ya sembo mpe ya solo, pamba te boyebi malamu ete bino mpe bozali na Mokonzi kati na Likolo.
Mitindo ya suka
Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe. Bobondelaka mpe mpo na biso, na tina ete Nzambe apesa biso mabaku ya koteya Sango Malamu mpo na kosakola mabombami ya Klisto. Mpe ezali mpo na mabombami yango nde ngai nazali mokangami kati na boloko. Bobondelaka Nzambe mpo ete nasakola yango na polele nyonso, ndenge nasengeli penza kosala.
Botambolaka na bwanya liboso ya bato oyo bazali bandimi te mpe bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu. Tika ete maloba na bino etondaka tango nyonso na boboto mpe na elengi, mpo ete boyeba ndenge nini koyanola moto nyonso.
 
 
Tishike, ndeko molingami, mosali ya sembo mpe moninga na ngai kati na mosala ya Nkolo, akoyebisa bino makambo nyonso oyo etali ngai. Ezali na tina yango nde nazali kotinda ye epai na bino, mpo ete apesa bino basango na tina na biso mpe alendisa bino. Azali koya elongo na Onezime, ndeko molingami na biso ya solo, oyo azali moko kati na bino. Bakoyebisa bino makambo nyonso oyo ezali koleka awa.
 
10 Arisitarke, moninga na ngai kati na boloko, atindeli bino mbote. Boyamba mpe mbote ya Malako, ndeko ya Barnabasi, oyo na tina na ye napesaki bino mitindo ete, soki ayei epai na bino, boyamba ye malamu.
11 Yesu oyo babengaka Jistisi atindeli bino mbote. Kati na Bayuda oyo bakomaki Baklisto, kaka bango nde bazali kosala elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe bazali mpo na ngai kobondisama mobimba.
12 Epafrasi, ye oyo azali mpe moko kati na bino mpe mowumbu ya Yesu-Klisto, atindeli bino mbote. Abundaka tango nyonso etumba mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete botelema ngwi lokola bato oyo bakembi kati na kondima mpe baselingwa mpo na kokokisa mokano nyonso ya Nzambe. 13 Nazali kotatola solo mpo na ye ete azali kosala mosala makasi mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise mpe mpo na bandeko ya Iyerapolisi.
14 Monganga Luka, molingami na biso, mpe Demasi batindeli bino mbote.
15 Bopesa mbote epai ya bandeko ya Laodise, epai ya Nefa mpe epai ya Lingomba oyo esanganaka kati na ndako na ye.
 
16 Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bosala ete etangama mpe kati na Lingomba ya Laodise ; bongo bino mpe botanga oyo ekowuta na Laodise.
 
17 Boloba na Arshipe : « Sala keba na lotomo oyo ozwaki kati na Nkolo mpo ete okokisa yango malamu. »
 
18 Ngai Polo, napesi bino mbote na kokoma yango na maboko na ngai. Bobosanaka te ete nazali mokangami kati na boloko. Tika ete ngolu ezala na bino !