2
Ndoto ya mokonzi Nabukodonozori
Na mobu ya mibale ya bokonzi na ye, Nabukodonozori alotaki ndoto. Molimo na ye etungisamaki makasi mpe pongi ekimaki ye. Mokonzi abengisaki bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato ya mayele ya mabe mpo ete bayebisa ye ndoto oyo alotaki. Tango bayaki, batelemaki liboso ya mokonzi ; mpe mokonzi ayebisaki bango :
— Nalotaki ndoto moko oyo ezali kotungisa molimo na ngai makasi ; nazali na posa ya koyeba ndimbola na yango.
Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na lokota ya bato ya Arami :
— Tika ete mokonzi awumela na bomoi seko na seko !
Yebisa ndoto na yo epai ya basali na yo, mpe tokolimbola yango.
Mokonzi alobaki na bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto :
— Tala mokano oyo nasili kozwa : « Soki boyebisi ngai te ndoto oyo nalotaki mpe ndimbola na yango, nakokata bino biteni-biteni mpe nakobuka-buka bandako na bino. Kasi soki boyebisi mpe bopesi ngai ndimbola na yango, nakopesa bino bakado, lifuti mpe lokumu mingi. Yango wana, boyebisa ngai ndoto yango mpe bopesa ngai ndimbola na yango. »
Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki lisusu epai ya mokonzi :
— Tika ete mokonzi ayebisa ndoto na ye, mpe biso, tokolimbolela ye yango !
Mokonzi azongisaki :
— Nandimi solo ete bozali kolekisa tango, pamba te boyebi malamu ete nakobongola mokano na ngai te. Soki boyebisi ngai ndoto yango te, boyeba malamu ete etumbu moko kaka mpe ya ndenge moko ezali kozela bino ! Ah, boyokani koyebisa ngai makambo ya lokuta mpe ya mabe mpo bokanisi ete makambo ekobongwana ! Mpo na yango, boyebisa ngai ndoto yango, mpe nakondima ete bozali na makoki ya kolimbola yango.
10 Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na mokonzi :
— Moto moko te kati na mokili akokoka kosala makambo oyo mokonzi azali kosenga. Mpe mokonzi moko te, ezala azalaki moto monene to moto na nguya, asila kosenga likambo ya boye epai ya banganga-kisi, epai ya bato ya mayele ya mabe mpe epai ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto. 11 Makambo oyo mokonzi azali kosenga ezali pasi makasi, moto moko te akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye ; ezali kaka banzambe nde bakoki kosala yango mpo ete bavandaka kati na bato te.
12 Mbala moko, mokonzi asilikaki mpe atombokaki makasi ; apesaki mitindo ete baboma bato nyonso ya bwanya ya Babiloni. 13 Boye, sango ya mokano ya koboma bato nyonso ya bwanya epanzanaki, mpe batindaki bato koluka Daniele elongo na baninga na ye mpo ete baboma bango.
14 Tango Arioki, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abimaki mpo na kokende koboma bato ya bwanya ya Babiloni, Daniele asololaki na ye na bwanya mpe na mayele. 15 Daniele atunaki Arioki : « Mpo na nini mokonzi azwi mokano ya makasi boye ? »
Bongo Arioki atalisaki Daniele makambo yango.
16 Tango Daniele ayokaki bongo, akotaki epai ya mokonzi mpe asengaki ye tango mpo ete akoka kopesa ye ndimbola ya ndoto yango ; 17 bongo Daniele azongaki na ndako na ye mpe ayebisaki makambo yango epai ya Anania, Mikaeli mpe Azaria, baninga na ye. 18 Alobaki na bango ete basenga ngolu mpe mawa ya Nzambe ya Lola na tina na mabombami oyo, mpo ete baboma te ye Daniele, baninga na ye mpe bato mosusu ya bwanya ya Babiloni. 19 Bongo na butu, Daniele azwaki emoniseli oyo elakisaki ye mabombami yango ; boye, akumisaki Nzambe ya Lola. 20 Daniele alobaki :
Tika ete Kombo ya Nzambe
ekumisama libela na libela !
Bwanya mpe nguya ezali ya Ye.
21 Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo,
alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi,
apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya
mpe boyebi epai ya bato ya mayele.
22 Alakisaka makambo ya bozindo mpe ebombama,
ayebaka makambo oyo esalemaka na molili,
mpe pole ezali kati na Ye.
23 Oh Nzambe ya batata na ngai,
nazali kosanzola mpe kokumisa Yo
mpo na bwanya mpe nguya oyo opesi ngai,
pamba te oyebisi ngai makambo oyo tosengaki Yo
mpe otalisi biso ndoto ya mokonzi.
Daniele alimboli ndoto ya mokonzi
24 Sima na yango, Daniele akendeki epai ya Arioki oyo mokonzi apesaki mokumba ya koboma bato ya bwanya ya Babiloni ; alobaki na ye :
— Koboma bato ya bwanya ya Babiloni te ! Mema ngai epai ya mokonzi, mpe nakopesa ye ndimbola ya ndoto na ye.
25 Arioki amemaki Daniele na lombangu liboso ya mokonzi mpe alobaki na ye :
— Mokonzi, namoni moto moko kati na bawumbu oyo bawutaki na Yuda, oyo akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye mpe kolimbola yango.
26 Mokonzi atunaki Daniele oyo bazalaki lisusu kobenga Belitsatsari :
— Ozali na makoki ya koyebisa ngai makambo oyo namonaki na ndoto mpe kolimbola yango ?
27 Daniele azongisaki liboso ya mokonzi :
— Bato ya bwanya, bato ya mayele ya mabe, banganga-kisi mpe bato oyo bayebaka makambo oyo ekoya bazali na makoki te ya koyebisa mokonzi mabombami oyo azali kotuna ; 28 kasi kati na Lola, ezali na Nzambe moko oyo alakisaka mabombami ; mpe alakisi mokonzi Nabukodonozori makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ekoya. Tala ndoto oyo olotaki mpe bimoniseli oyo ozwaki tango ozalaki ya kolala na mbeto na yo : 29 « Oh mokonzi, wana ozalaki ya kolala na mbeto na yo, okomaki kokanisa makambo oyo ekoya na sima ya tango ; bongo, Ye oyo alakisaka mabombami alakisaki yo makambo oyo ekoya. 30 Bongo soki alakisi mabombami yango epai na ngai, ezali te mpo ete naleki bato nyonso na bwanya, kasi ezali mpo ete mokonzi ayeba ndimbola ya ndoto na ye mpe makambo oyo ezali kotungisa motema na ye.
31 Oh mokonzi, tala emoniseli oyo ozwaki : ‹ Ekeko moko ya monene ezalaki liboso na yo : ezalaki monene penza, ezalaki kongenga makasi mpe ezalaki somo mpo na kotala ; 32 moto na yango ezalaki ya wolo ya peto, tolo mpe maboko na yango ezalaki ya palata, libumu mpe loketo na yango ezalaki ya bronze, 33 makolo na yango ezalaki ya ebende, matambe na yango ezalaki, ndambo moko ya ebende, mpe ndambo mosusu, ya mabele oyo basalelaka bikeko. 34 Wana ozalaki kotala ekeko yango, libanga moko ekweyaki yango moko (moto moko te abwakaki yango), ekweyelaki ekeko yango na matambe na yango ya ebende mpe ya mabele oyo basalelaka bikeko, enikaki matambe yango mpe ekomaki putulu. 35 Mbala moko, ezala ebende to mabele oyo basalelaka bikeko to bronze to palata to mpe wolo, nyonso epanzanaki, ekomaki mike-mike mpe ekomaki kopumbwa ndenge matiti ya ble epumbwaka tango bapupolaka yango ; mopepe ememaki yango mpe elimwisaki yango. Kasi libanga oyo ekweyelaki ekeko yango ekomaki ngomba moko ya monene oyo etondisaki mokili mobimba. › »
36 Wana nde ezalaki ndoto ; mpe sik’oyo, tokopesa ndimbola na yango liboso ya mokonzi ! 37 Oh mokonzi, ozali mokonzi ya bakonzi ! Nzambe ya Lola apesaki yo makasi mpe nguya, bokonzi mpe nkembo ; 38 atiaki na se ya bokonzi na yo bato nyonso ya mokili, banyama ya zamba mpe bandeke ya likolo ; atiaki yo mokonzi na bango nyonso, na bisika nyonso oyo bavandaka ! Ezali yo nde ozali moto wana ya wolo. 39 Sima na yo, bokonzi mosusu ekobima, kasi ekoleka bokonzi na yo te na nguya ; bongo na sima, bokonzi ya misato ekobima mpe ekokonza na mabele mobimba : yango nde ezali kolakisa bronze. 40 Mpe na suka, bokonzi ya minei ekobima, ekozala makasi lokola ebende ; ndenge ebende ebukaka, enikaka mpe epanzaka nyonso, ndenge wana mpe ekobuka mpe ekopanza babokonzi mosusu ya liboso. 41 Mpe ndenge kaka omonaki ete matambe mpe misapi ya makolo na yango ezali ndambo moko, ya mabele oyo basalelaka bikeko, mpe ndambo mosusu, ya ebende, elingi koloba ete bokonzi yango ekokabwana ; kasi kati na yango, ekozala na eloko moko ya makasi lokola ebende, ndenge kaka omonaki ebende basangisa na mabele oyo basalelaka bikeko. 42 Mpe lokola misapi ya makolo ezalaki ndambo, ya ebende, mpe ndambo mosusu, ya mabele oyo basalelaka bikeko, bokonzi yango ekozala, ngambo moko, makasi, mpe ngambo mosusu, ezanga makasi. 43 Mpe ndenge kaka omonaki ebende basangisa na mabele oyo basalelaka bikeko, elakisi ete bato bakoluka kosangana na nzela ya boyokani, kasi bakotikala kosangana te, ndenge kaka ebende esanganaka te na mabele oyo basalelaka bikeko.
44 Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko. 45 Yango nde ndimbola ya emoniseli ya libanga oyo omonaki kokweya yango moko wuta na ngomba, oyo loboko ya moto moko te ebwakaki, mpo na koya kopanza ebende, bronze, mabele oyo basalelaka bikeko, palata mpe wolo.
Nzambe Monene alakisi mokonzi makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Ndoto oyo ezali penza kolakisa makambo ya solo, mpe ndimbola na yango ezali ebongi na kondima.
46 Boye, mokonzi Nabukodonozori agumbamaki elongi kino na mabele, liboso ya Daniele, mpe apesaki ye lokumu ; apesaki mitindo ete bapesa ye makabo mpe babonzela ye malasi ya ansa. 47 Mokonzi alobaki na Daniele : « Solo, Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bakonzi mpe Molakisi mabombami, mpo ete okoki kolakisa mabombami oyo ! »
48 Sima, mokonzi atombolaki Daniele na lokumu oyo eleki likolo mpe apesaki ye bakado mpe bozwi ebele ; akomisaki ye moyangeli ya etuka mobimba ya Babiloni mpe mokambi ya bato na yango nyonso ya bwanya. 49 Daniele asengaki na mokonzi Nabukodonozori ete atia Shadraki, Meshaki mpe Abedinego lokola bayangeli ya etuka mobimba ya Babiloni wana ye moko Daniele atikalaki kosala pembeni ya mokonzi.