2
Bilengi mpe ezali kaka pamba
Namilobelaki : « Yaka sik’oyo ; nakomekisa yo bilengi mpo ete ozala moto ya esengo ! » Nzokande, yango mpe ezalaki kaka pamba. Na tina na koseka, nalobaki : « Ezali na yango kaka bozoba ! » Bongo na tina na elengi, nalobaki : « Esalaka nini ? »
 
Wana motema na ngai ezalaki nanu kokamba ngai na bwanya, nazwaki mokano ya komipesa na masanga ya vino mpe na makambo ya bozoba. Nazalaki nde na posa ya kososola bolamu nini moto akoki kozwa na kosala bongo na se ya moyi, na mwa mikolo ya bomoi na ye.
Nazwaki mokano ya kosalisa misala minene : namitongelaki bandako minene mpe namilonelaki bilanga ya vino mpo na bomoi na ngai ; nasalaki bilanga mpe nabongisaki bisika mpo na kolona banzete ya ndenge na ndenge, oyo ebotaka bambuma ; natimolaki mpo na ngai moko, mabulu minene ya mayi mpo na kosopela banzete ya mike mayi.
Nasombaki bawumbu ya mibali mpe ya basi ; kobakisa na motango ya bawumbu mosusu oyo babotamaki kati na ndako na ngai. Nazalaki mpe na bangombe, bantaba mpe bameme ebele koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai.
Nakongolaki mpo na ngai moko palata mpe wolo oyo ewutaki na bomengo ya bakonzi mpe ya bituka ; nazwaki mpo na ngai bayembi ya basi mpe ya mibali, mpe oyo esepelisaka makasi mibali : mwasi mpe basi ebele ya kitoko.
Nakomaki moto monene koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai ; kasi atako bongo, bwanya ezalaki kaka kotambolisa ngai.
10 Napimelaki miso na ngai eloko moko te
oyo elulaki,
napimelaki motema na ngai esengo moko te.
Motema na ngai esepelaki na misala na ngai nyonso,
mpe yango ezalaki lifuti ya mosala na ngai nyonso.
11 Boye, tango natali misala nyonso
oyo maboko na ngai esalaki
mpe pasi nyonso oyo namonaki mpo na kokokisa yango,
namoni ete nyonso wana ezalaki kaka pamba,
ezali lokola moto azali kolanda mopepe,
ezali na yango na litomba moko te na se ya moyi.
Bwanya mpe bozoba ezali kaka pamba
12 Bongo, nabalolaki makanisi na ngai
mpo na koyekola bwanya, bozoba mpe bolema.
Eloko nini mokitani ya mokonzi akoki kosala,
oyo eleki oyo esila kosalema ?
13 Namonaki ete bwanya ezali malamu koleka bozoba,
ndenge pole ezali malamu koleka molili.
14 Moto ya bwanya ayebi epai azali kokende,
kasi zoba atambolaka na molili ;
kasi nasosoli likambo moko :
suka na bango mibale ekozala kaka ndenge moko.
15 Namilobelaki :
« Suka ya zoba ekozala ndenge moko kaka na suka na ngai ;
sik’oyo, litomba nini ezali na moto
ya kozala na bwanya mingi ? »
Namilobelaki :
« Oyo mpe ezali kaka pamba. »
16 Pamba te ezala moto ya bwanya to zoba,
bakotikala kokanisa bango tango molayi te ;
mpe na mikolo ekoya, bato bakobosana bango mibale.
Moto ya bwanya mpe akokufa lokola moto ya zoba.
17 Boye, nayinaki bomoi, pamba te misala oyo esalemaka na se ya moyi ezali mabe mpo na ngai. Nyonso wana ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
18 Nayinaki biloko nyonso oyo namonelaki pasi na se ya moyi, pamba te nakotika yango epai ya moto oyo akoya sima na ngai. 19 Bongo, nani ayebi soki moto yango akozala moto ya bwanya to zoba ? Nzokande, ye nde akozala na bokonzi na likolo ya misala nyonso oyo nabimiselaki motoki mpe mayele na ngai na se ya tango. Yango mpe ezali kaka pamba.
20 Bongo, motema na ngai ekomaki kobungisa elikya likolo ya misala makasi oyo nazalaki kosala na se ya moyi. 21 Pamba te moto akoki kosala mosala na ye na bwanya, na boyebi mpe na ndenge esengeli penza ; kasi akotika nyonso oyo azali na yango epai ya moto oyo amonelaki yango pasi te ; yango mpe ezali pamba mpe mabe makasi.
22 Litomba nini moto akoki kozwa na misala nyonso oyo asali mpe amonelaka pasi na se ya moyi ? 23 Mikolo nyonso ya mosala na ye ezali kaka pasi mpe komitungisa ; ezala na butu, makanisi na ye ezalaka na kimia te ; oyo mpe ezali kaka pamba.
 
24 Eloko eleki malamu mpo na moto ezali kaka kolia, komela mpe kosepela na mosala na ye. Namoni ete oyo mpe ewuti na loboko na Nzambe ; 25 pamba te soki Nzambe azalaki te, nani akoki kolia mpe kosepela ?
26 Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye ; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe.
Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.