50
Kokundama ya Jakobi
Jozefi amibwakaki na nzoto ya tata na ye, alelaki ye mpe apesaki ye beze. Bongo Jozefi apesaki mitindo na minganga oyo bazalaki kosala epai na ye ete bakawusa nzoto ya Isalaele, tata na ye. Boye minganga bakawusaki nzoto ya Isalaele, bakokisaki mikolo tuku minei oyo esengelaki mpo na kokawusa nzoto ya mowei. Bato ya Ejipito basalelaki ye matanga mikolo tuku sambo.
Tango mikolo ya matanga esilaki, Jozefi alobaki na bakonzi oyo basalaka na ndako ya Faraon :
— Soki nazwi ngolu na miso na bino, bolobela ngai epai ya Faraon. Boyebisa ye ete tata na ngai alapisaki ngai ndayi : « Nakomi pembeni ya kokufa, bokunda ngai kati na kunda oyo natobolaki na libanga, na mokili ya Kanana. » Mpe sik’oyo, tika ete apesa ngai nzela mpo ete nakende kokunda tata na ngai, bongo na sima nde nakozonga.
Faraon azongisaki :
— Kende mpe kunda tata na yo ndenge alapisaki yo ndayi.
Boye Jozefi akendeki kokunda tata na ye ; bakalaka nyonso ya lokumu ya Faraon bakendeki elongo na ye : bakonzi oyo bazalaki kosala na ndako na ye mpe bakonzi nyonso ya Ejipito elongo na bato nyonso ya ndako ya Jozefi, bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya tata na ye. Bana na bango kaka nde batikalaki na Gosheni na bameme, bantaba mpe bangombe na bango. Jozefi atambolaki lisusu elongo na bashareti mpe bato oyo batambolaka likolo ya bampunda. Ezalaki mobembo ya bato ebele penza.
10 Tango bakomaki na etando ya Atadi, pembeni ya Yordani, basalaki matanga ya monene penza. Jozefi asalaki mikolo sambo ya matanga mpo na tata na ye. 11 Bongo tango bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna bamonaki matanga wana na etando ya Atadi, balobaki : « Bato ya Ejipito bazali na milulu minene ya matanga. » Yango wana babengaki esika yango Abele-Mitsirayimi, oyo ezali pembeni ya Yordani.
12 Bana mibali ya Jakobi basalaki ndenge tata na bango atindaki bango. 13 Bamemaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na lidusu ya mabanga oyo ezali na elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, elanga oyo Abrayami asombaki epai ya Efroni, moto ya Iti, mpo ete akomisa yango lilita na ye. 14 Sima na kokunda tata na ye, Jozefi azongaki na Ejipito elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kokunda tata na ye.
Bandeko ya Jozefi basengi bolimbisi
15 Tango bandeko mibali ya Jozefi bamonaki ete tata na bango asili kokufa, balobaki : « Tango mosusu Jozefi akoyina biso mpe akozongisela biso mabe nyonso oyo tosalaki ye ! »
16 Boye batindelaki Jozefi maloba oyo : « Liboso ete tata na yo akufa, atikaki maloba oyo : ‹ Tala makambo oyo bokoyebisa Jozefi : 17 ‘ Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo ! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo ! ’ › »
Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki.
18 Bandeko na ye bayaki, bamibwakaki liboso na ye mpe balobaki :
— Tozali bawumbu na yo.
19 Kasi Jozefi alobaki na bango :
— Bobanga te ! Boni, ngai nazali na esika ya Nzambe ? 20 Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele. 21 Yango wana, bobanga te ! Nakokokisa posa na bino mpe ya bana na bino.
Akitisaki bango mitema mpe alobelaki bango na boboto nyonso.
Kufa ya Jozefi
22 Jozefi avandaki na Ejipito elongo na libota nyonso ya tata na ye. Awumelaki na bomoi mibu nkama moko na zomi. 23 Amonaki bakitani ya Efrayimi kino na molongo ya misato. Amonaki lisusu bana ya Makiri, mwana mobali ya Manase, ba-oyo babotamaki na mabolongo ya Jozefi. 24 Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »
25 Jozefi alapisaki bana mibali ya Isalaele ndayi mpe alobaki na bango : « Tango Nzambe akosunga bino, bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo. »
26 Bongo Jozefi akufaki tango akokisaki mibu ya mbotama nkama moko na zomi. Tango basilisaki kokawusa nzoto na ye, batiaki ye na sanduku na Ejipito.