Mokanda epai ya
Ba-Ebre
Bomoto ya Mwana na Nzambe
1
Nzambe amimonisi na nzela ya Mwana
Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli. Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili. Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, mpe azwi esika ya lokumu penza koleka ba-anjelu mpo ete azwi Kombo oyo eleki bakombo ya ba-anjelu.
Mwana na Nzambe aleki ba-anjelu
Epai ya anjelu nini penza Nzambe aloba :
« Ozali mwana na ngai ;
na mokolo ya lelo, nakomi Tata na yo ? »
To mpe :
« Ngai nakozala Tata mpo na ye,
mpe ye akozala mwana mpo na Ngai ? »
Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba :
« Tika ete ba-anjelu nyonso ya Nzambe bagumbamelaka Yo ? »
Nzokande, tala makambo oyo Nzambe aloba na tina na ba-anjelu :
« Akomisaka ba-anjelu na Ye mipepe,
mpe basali na Ye, ndemo ya moto. »
Mpe tala makambo oyo aloba na tina na Mwana :
« Oh Nzambe, Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela seko na seko,
lingenda ya bokonzi na Yo ezali mpo na bosembo.
Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe ;
yango wana, oh Nzambe, Nzambe na Yo apakoli Yo mafuta ya esengo,
asepeli na Yo koleka baninga na Yo ! »
10 Kaka na tina na mwana, alobaki lisusu :
« Na ebandeli, oh Nkolo, Yo nde otiaki miboko ya mokili,
mpe maboko na Yo nde esalaki Likolo.
11 Nyonso wana ekobeba,
ekonzuluka lokola elamba ;
kasi Yo, okotikala seko na seko.
12 Okolinga yango lokola kazaka,
mpe bakolongola yango lokola elamba
mpo na kotia elamba mosusu.
Kasi Yo, ozali ndenge moko,
mibu na Yo ekotikala kosuka te ! »
13 Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba :
« Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
kino nakomisa banguna na yo
enyatelo makolo na yo ? »
14 Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.