13
Mitindo ya ndenge na ndenge
Tika ete bondeko ewumela kati na bino ! Bolemba te koyambaka malamu bapaya, pamba te, na nzela wana, bato mosusu bayambaki ba-anjelu wana bayebaki te ete bazali solo ba-anjelu.
Bokanisaka bato oyo bazali kati na boloko lokola nde bino mpe bozali kati na boloko elongo na bango. Bokanisaka bato oyo bazali komona pasi, mpo ete bino mpe bozali na nzoto oyo emonaka pasi.
Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. » Boye tokoki koloba na elikya nyonso :
« Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ;
bato bakoki kosala ngai nini ? »
Bokanisaka bakambi na bino, oyo bateyaki bino Liloba na Nzambe ; botala ndenge nini suka ya bomoi na bango ezalaki, mpe bomekola kondima na bango.
Yesu-Klisto azali ndenge moko : lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela. Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango. 10 Tozali na etumbelo, kasi Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Mongombo bazali na bokonzi te ya kolia mbeka oyo babonzi na likolo ya etumbelo yango, 11 pamba te banzoto ya banyama oyo mokonzi ya Banganga-Nzambe amemaka makila na yango kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule lokola mbeka mpo na bolimbisi ya masumu, etumbamaka na libanda ya molako. 12 Yango wana Yesu mpe akufaki na libanda ya mboka mpo na kobulisa bato na nzela ya makila na Ye moko.
13 Boye, biso mpe tokende epai ya Yesu na libanda ya molako, na kondima koyoka soni oyo Ye ayokaki ; 14 pamba te, kati na mokili oyo, tozali na engumba moko te oyo ekowumela libela na libela, kasi tozali nde koluka engumba oyo ezali koya. 15 Yango wana, na nzela ya Yesu, tobonzelaka Nzambe tango nyonso mbeka ya masanzoli, elingi koloba : mbuma ya bibebu oyo etatolaka polele Kombo na Ye. 16 Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.
17 Botosaka bakambi na bino mpe bosalelaka mitindo oyo bapesaka bino, pamba te bazali bakengeli ya milimo na bino mpe bakosamba likolo na bino liboso ya Nzambe. Bosalaka bongo mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na koyimayima te, soki te bokozanga litomba.
18 Bosambelaka mpo na biso ! Pamba te tondimisami penza ete tozali na mitema ya peto mpe tozwi mokano ya kotambola na bomoi ya lokumu kati na makambo nyonso. 19 Nazali penza kosenga na bino ete bobondela Nzambe mpo ete bazongisa ngai na lombangu epai na bino.
Mapamboli mpe bambote ya suka
20 Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko, 21 apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !
 
 
22 Nazali kosenga na bino bandeko na ngai ete bokanga motema na koyamba malendisi oyo nakomeli bino na mokuse penza.
 
23 Boyeba ete ndeko na biso, Timote, asilaki kobima na boloko. Soki akoya noki, nakoya nzela moko na ye mpo na komona bino.
 
24 Bopesa mbote na bakambi na bino nyonso mpe na basantu nyonso.
Bandeko ya Itali batindeli bino mbote.
 
25 Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na bino nyonso !