66
Etumbu mpe elikya
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi,
mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai.
Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ?
Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?
Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso,
mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? »
elobi Yawe.
 
« Tala moto oyo Ngai nakotala :
moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami,
mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.
 
Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe
azali lokola ye oyo abomi moto,
moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme
azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa,
moto oyo apesi makabo ya mbuma
azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu,
moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa
azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko.
Solo, baponi kolanda banzela na bango moko
mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.
Boye, Ngai mpe nakotindela bango pasi
mpe nakotindela bango pasi oyo babangaka.
Pamba te tango nabelelaki,
moto moko te ayanolaki ;
tango nalobaki, moto moko te ayokaki ;
kasi basalaki makambo mabe na miso na Ngai
mpe baponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »
 
Boyoka Liloba na Yawe,
bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye :
« Bandeko na bino oyo bayina bino
mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi :
‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye
mpo ete tokoka komona esengo na bino ! ›
Kasi bango nde bakosambwa solo.
Boyoka makelele kobima longwa na engumba,
boyoka makelele kobima longwa na Tempelo !
Ezali nde mongongo na Yawe
oyo azali kofuta banguna na Ye
kolanda oyo ekoki na misala na bango.
 
Liboso ete ayoka pasi ya kobota, abotaki ;
liboso ete pasi ya kobota ekomela ye,
abotaki mwana mobali.
Nani ayoka likambo ya boye ?
Nani amona makambo ya boye ?
Boni, mokili ekoki kobotama na mokolo moko
to ekolo ekoki solo kosalema na mbala moko ?
Nzokande, kaka tango Siona ayoki pasi ya kobota,
tala ye wana asili kobota bana na ye.
Nakoki solo koyeisa pasi ya kobota
mpe kozanga makoki ya kobotisa ? »
Elobi Yawe.
« Nakoki solo kokanga mabota
soki nazali kopesa mabota ? » elobi Nzambe na yo.
10 « Bosepela elongo na Yelusalemi
mpe botonda na esengo mpo na ye,
bino nyonso oyo bolingaka ye ;
bosepela makasi elongo na ye,
bino nyonso oyo bosalelaki ye matanga.
11 Pamba te bokomela miliki
mpe bokotonda mabele na ye, oyo ebondisaka ;
bokomela penza ndenge esengeli
mpe bokozwa esengo kati na bomengo na ye. »
 
12 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi :
« Nakosopela ye kimia lokola ebale,
mpe bozwi ya bikolo lokola ebale na tango ya mpela ;
bokobatelama, bokomemama na maboko na ye
mpe akobondela bino na mabolongo na ye.
13 Ndenge mama abondelaka mwana na ye,
ndenge wana mpe Ngai nakobondela bino ;
mpe bokobondisama mpo na Yelusalemi. »
 
14 Tango bokomona yango, mitema na bino ekosepela
mpe mikuwa na bino ekozwa makasi ya sika
lokola matiti ya mobesu ;
loboko na Yawe ekoyebana kati na bawumbu na Ye
mpe kanda na Ye ekokitela banguna na Ye.
 
15 Tala, Yawe azali koya na moto,
mpe bashar na Ye ezali lokola mopepe ya kayina ;
akokitisa kanda na Ye na somo penza
mpe akopamela na nzela ya moto.
16 Yawe akosambisa bato nyonso
na nzela ya moto mpe ya mopanga ;
bongo, bato ebele bakokufa na mopanga,
na maboko na Yawe.
17 « Bato oyo bamibulisaka mpe bamipetolaka mpo na kokende na bilanga mpe kolanda moto moko oyo azali na kati-kati ya bato oyo baliaka misuni ya bangulu, ya bampuku mpe biloko mosusu ya mbindo, bakokufa bango nyonso elongo, » elobi Yawe.
18 « Mpe Ngai, likolo ya misala mpe makanisi na bango, nakomi pene ya kosangisa bato ya bikolo mpe nkota nyonso ; bongo bakoya mpo na komona nkembo na Ngai. 19 Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika : na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo. 20 Bakomema bandeko na bino nyonso wuta na bikolo nyonso, lokola likabo epai na Yawe, na ngomba na Ngai ya bule, na Yelusalemi, na likolo ya bampunda, ya bashar mpe ya bashareti oyo ekangama, ya mikongo ya bamile mpe ya bashamo, » elobi Yawe. « Bakomema bango ndenge bana ya Isalaele bamemaka makabo na bango ya bambuma, kati na basani ya bule, na Tempelo ya Yawe. 21 Mpe nakopona kati na bango, ndambo ya bato mpo ete bazala Banganga-Nzambe mpe Balevi, » elobi Yawe.
22 « Ndenge likolo mpe mabele ya sika oyo nasili kosala ekowumela liboso na Ngai, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe bakitani na bino mpe kombo na bino ekowumela. 23 Bato ya mokili mobimba bakoya kofukama liboso na Ngai, longwa na feti moko ya ebandeli ya sanza kino na feti mosusu, longwa na Saba moko kino na mosusu, » elobi Yawe, 24 « bakobima mpe bakomona bibembe ya bato oyo batombokelaki Ngai, pamba te bankusu na bango ekokufa te mpe moto na bango ekokufa te ; bakopesa moto nyonso somo. »