2
Kondima mpe misala
Bandeko na ngai, bosangisaka te kopona bilongi mpe kondimela Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo atonda na nkembo. Ndakisa : soki moto moko akoti kati na ndako na bino ya mayangani, alata penza bilamba ya talo mpe lopete ya wolo ; bongo mobola mpe akoti, alata bilamba na ye ya bobola. Soki boweleli koyamba moto oyo alati bilamba ya talo mpe bolobi na ye : « Tala esika ya kitoko oyo ebongisami mpo na yo, » kasi bolobi na mobola : « Yo, kende kotelema kuna » to « vanda awa na mabele, na se ya enyatelo makolo na ngai ; » boni, wana boponi bilongi te kati na bino, mpe bokomi te koyekola bato na nzela ya makanisi mabe ?
Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?
Nzokande bino, bomonaka babola bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na bisambiselo, ezali bazwi te ? Ezali bango te bato babebisaka lokumu ya kombo kitoko oyo Nzambe apesa bino ? Soki bozali kokokisa Mobeko ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali kati na Makomi : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, » wana bozali kosala malamu. Kasi soki bozali kopona-pona bilongi, bozali kosala masumu, mpe Mobeko ezali kokweyisa bino mpo ete bozali kotosa yango te. 10 Moto oyo akweyi ata na mobeko moko kaka, atako atosaka mibeko nyonso, abuki nde mibeko nyonso. 11 Solo, Ye oyo alobaki : « Okosalaka ekobo te, » alobaki lisusu : « Okobomaka te. » Nzokande soki osali ekobo te, kasi obomi moto, yeba ete obuki mibeko nyonso. 12 Boye, tika ete bolobaka mpe bosalaka makambo lokola bato oyo bayebi malamu ete bakosambisama kolanda mibeko oyo ememaka bato na bonsomi. 13 Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.
 
14 Bandeko na ngai, tina nini ezali na moto ya koloba ete azali na kondima, soki azali kolakisa yango te na misala ? Kondima ya boye ekoki solo kobikisa ye ? 15 Ndakisa : soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azangi bilamba ya kolata mpe bilei ya mokolo na mokolo, 16 bongo moko kati na bino alobi na ye : « Kende na kimia, yetola moto mpe lia, » kasi apesi ye te eloko oyo azali na yango posa mpo na nzoto na ye, maloba wana ezali na tina nini ? 17 Ezali mpe bongo mpo na kondima : soki kondima ezangi misala, ezali ya kokufa. 18 Nzokande moto mosusu akoki koloba : « Yo ozali na kondima ; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala ; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai. 19 Ondimaka ete Nzambe azali kaka moko ? Osalaka malamu ! Kasi milimo mabe mpe endimaka ete Nzambe azali kaka moko, mpe elengaka. 20 Oh zoba ya moto ! Boni, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala ezali pamba ? 21 Tala, Abrayami, tata na biso, atangamaki lokola moto ya sembo mpo na misala, pamba te abonzaki Izaki, mwana na ye ya mobali, na likolo ya etumbelo. 22 Tala ndenge kondima mpe misala na ye ezalaki kosala elongo ; mpe na nzela ya misala yango, kondima na ye ekomaki ya kokoka. 23 Ezalaki ndenge wana nde ekokisamaki, liloba oyo ya Makomi : « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe ; » mpe mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo, mpe akomaki kobenga ye « moninga na ngai. »
24 Bomoni malamu sik’oyo ete Nzambe akomisaka moto sembo kolanda misala ya moto, kasi mpo na kondima kaka te. 25 Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Raabi, mwasi ya ndumba : Nzambe akomisaki ye moto ya sembo mpo ete ayambaki, abombaki mpe akimisaki na nzela mosusu banongi ya Isalaele. 26 Ndenge nzoto oyo ezangi pema ezali ya kokufa, ndenge wana mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa.