5
Boyoka sik’oyo, bino bazwi : Boyoka mawa mpe bolela mpo na pasi oyo ekokweyela bino. Bomengo na bino esili kopola, mpe mpese esili kolia bilamba na bino ; wolo mpe palata na bino esili kobeba ; mpe libebi na yango ekotatola mabe na bino mpe ekolia banzoto na bino lokola moto. Bozali kobakisa se kobakisa bomengo ! Boyebi te ete tokomi na mikolo ya suka ? Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga. Awa na mokili, bozali kobika bomoi ya bisengo mpe ya bofuluki, bozali komikomisa nzoto mafuta lokola banyama oyo babongisi mpo na koboma. Bozali kokatela bato ya sembo etumbu mpe koboma bango, nzokande batelemeli bino te.
Mpiko kati na komekama
Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele : akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma. Bino mpe, bokangaka mitema mpe boyikaka mpiko, pamba te koya ya Nkolo ekomi pene.
Bandeko na ngai, botika kofundana bino na bino, noki te Nzambe akosambisa bino. Botala, Mosambisi azali ya kotelema liboso ya ekuke. 10 Bandeko, mpo na oyo etali kokanga motema kati na pasi, bozwa ndakisa ya basakoli oyo basakolaki na Kombo ya Nkolo. 11 Ndenge boyebi, tobengaka bato oyo bayikaka mpiko bato ya esengo. Boyokaki sango ya lolenge oyo Yobo akangaki motema kati na pasi, mpe boyebi malamu makambo oyo Nkolo asalaki, na suka, mpo na bolamu na ye ; pamba te Nkolo atonda na boboto mpe na mawa.
Maloba mpo na ndayi
12 Liboso na nyonso, bandeko na ngai, bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, ya mokili to mpe ya eloko nini. Tika ete « iyo » na bino etikala « iyo, » mpe « te » na bino etikala « te, » mpo ete bakatela bino etumbu te.
Libondeli ya moyengebene
13 Soki moko kati na bino azali na pasi, tika ete abondela ; soki moko azali na esengo, tika ete ayemba banzembo mpo na kokumisa Nzambe ; 14 soki mpe mosusu kati na bino azali kobela, tika ete abenga bakambi ya Lingomba mpo ete babondela mpo na ye mpe bapakola ye mafuta na Kombo ya Nkolo, 15 pamba te libondeli oyo esalemi na kondima ekobikisa mobeli, mpe Nkolo akotelemisa ye. Soki asalaki masumu, Nzambe akolimbisa ye. 16 Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.
17 Eliya azalaki moto lokola biso, abondelaki na molende nyonso mpo ete mvula enoka te, mpe mvula enokaki te na mabele mibu misato na basanza motoba ; 18 abondelaki lisusu, mpe Likolo epesaki lisusu mvula, mpe mabele ebotaki bambuma.
Bozongi ya mopengwi
19 Bandeko na ngai, soki moko kati na bino apengwi mosika ya bosolo mpe moto mosusu azongisi ye kati na yango, 20 boyeba ete moto oyo azongisi mopengwi longwa na libunga abikisi ye na kufa mpe asali ete masumu ebele elimbisama.