2
Yawe apameli bato na Ye
Anjelu ya Yawe alongwaki na Giligali mpe akendeki na Bokimi. Alobaki : « Nabimisaki bino na Ejipito mpe nakotisaki bino na mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi. Nalobaki : ‹ Nakotikala kokata boyokani te kati na Ngai mpe bino ; mpe bokosala boyokani te elongo na bato ya mokili oyo, kasi bokobuka bitumbelo na bango. › Nzokande, botosaki Ngai te. Mpo na nini bosalaki bongo ? Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino ; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. »
Tango Anjelu ya Yawe alobaki makambo oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele, bakomaki kolela makasi, mpe babengaki esika yango Bokimi. Babonzaki kuna bambeka epai na Yawe.
Kufa ya Jozue
Sima na Jozue kobengana bato, bana ya Isalaele bakendeki kobotola mokili, moto na moto na eteni na ye ya mabele. Basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka, oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele, bazalaki na bomoi. Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosali na Yawe, akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na zomi ya mbotama. Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Eresi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi.
Bato basundoli Yawe
10 Sima na yango, molongo nyonso ya bato oyo bazalaki elongo na Jozue basilaki na kokufa ; mpe molongo mosusu ya bato oyo babotamaki sima na bango ebimaki, molongo oyo eyebaki Yawe te mpe emonaki te misala oyo asalaki mpo na Isalaele.
11 Bongo bana ya Isalaele bakomaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe mpe kosalela banzambe ya Bala. 12 Basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito, mpe bakomaki kosambela mpe kosalela banzambe ya ndenge na ndenge ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango ; bakomaki kogumbama liboso ya banzambe yango. Mpo na yango, bapelisaki kanda ya Yawe, 13 pamba te basundolaki Yawe mpo na kosalela banzambe Bala mpe Asitarite.
14 Bongo Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe akabaki bango na maboko ya bato mabe oyo babotolaki bango biloko na makasi ; asundolaki bango epai ya banguna na bango, oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe bazangaki makoki ya kotelemela bango. 15 Tango nyonso bana ya Isalaele bazalaki kokende bitumba, loboko na Yawe ezalaki kotelemela bango mpo ete balonga te, ndenge kaka alapaki ndayi mpo na bango. Boye bazalaki na pasi makasi.
16 Yawe abimisaki Bilombe oyo babikisaki bango wuta na maboko ya bato mabe oyo bazalaki kobotola bango biloko na makasi. 17 Kasi bana ya Isalaele bayokelaki ata Bilombe na bango te, kasi bazalaki kosambela mpe kosalela banzambe mosusu. Batikaki noki nzela oyo batata na bango bazalaki kolanda : nzela ya kotosa mibeko na Yawe. Balandaki ndakisa na bango te. 18 Tango nyonso Yawe azalaki kobimisela bango elombe, abandaki mpe kozala elongo na elombe yango mpo na kobikisa bango wuta na maboko ya banguna na bango, na tango nyonso oyo elombe yango azalaki na bomoi. Solo Yawe azalaki koyokela bango mawa, pamba te azalaki koyoka bango kolela liboso ya banyokoli na bango mpe ya bato oyo bazalaki komonisa bango pasi. 19 Kasi soki elombe akufi, bato bazalaki kozongela misala mabe koleka kutu mabe ya batata na bango ; bazalaki kosambela, kosalela, kogumbamela banzambe mosusu. Bazalaki koboya kotika misala na bango ya mabe mpe bazalaki kaka kotingama na nzela na bango.
20 Boye Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe alobaki : « Lokola ekolo oyo ekataki boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango mpe eboyi koyokela Ngai, 21 Ngai mpe nakobengana lisusu te liboso na bango ata ekolo moko kati na bikolo oyo Jozue atikaki liboso ete akufa. 22 Nakosalela bikolo yango mpo na komeka Isalaele mpe kotala soki bakobatela mpe bakotambola na nzela ya Yawe lokola batata na bango. » 23 Yawe akabaki te bikolo yango na maboko ya Jozue, asalaki ete etikala ; abenganaki yango te mbala moko.