8
Na tango wana, elobi Yawe, bakobimisa mikuwa ya bakonzi mpe ya bakalaka ya Yuda, mikuwa ya Banganga-Nzambe mpe ya basakoli elongo na mikuwa ya bato ya Yelusalemi, wuta na malita na bango. Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele. Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›
Lisumu mpe etumbu
Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi :
Boni, soki moto akweyi, atelemaka te ?
Soki moto abungi nzela, azongaka lisusu na nzela te ?
Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela ?
Mpo na nini bazali kokangama kaka na nzela na bango ya mabe ?
Bamipesi makasi na makambo ya lokuta
mpe baboyi kozongela Ngai.
Nayokaka na bokebi makambo nyonso oyo balobaka,
kasi balobaka makambo ya solo te.
Moko te kati na bango ayokaka motema pasi
mpo na mabe oyo asalaka,
alobaka : ‘ Nasali nini ? ’
Moto na moto akangamaka kaka na nzela na ye
lokola mpunda oyo ezali kokende na bitumba.
Ezala kutu nkongi, kati na likolo,
eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu ;
ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila
eyebaka ata tango ya kozonga,
kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te.
 
Ndenge nini bokoki koloba : ‘ Tozali bato ya bwanya,
pamba te toyebi Mobeko ya Yawe, ’
tango sik’oyo ekomeli ya balakisi ya Mobeko
ebongoli yango lokuta ?
Bato ya bwanya bakoyokisama soni,
bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu,
pamba te batiolaki Liloba na Yawe.
Bazali na bwanya ya ndenge nini ?
10 Yango wana, nakokaba basi na bango
epai ya mibali mosusu,
mpe bilanga na bango epai ya bato mosusu ;
pamba te bango nyonso, ezala mikolo to bana mike,
batondi na lokoso ya mbongo ;
basakoli mpe Banganga-Nzambe nyonso bakomi
se kotambola na lokuta ;
11 bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo
mpe bazali koloba : ‘ Makambo nyonso ezali malamu,
nyonso ezali kotambola malamu ! ’
Nzokande, ata likambo moko ya malamu ezali te.
12 Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ?
Te ! Bazali koyoka ata soni te ;
bayebi kutu te ndenge bayokaka soni !
Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso,
bakokweyisama tango bakozwa etumbu,
elobi Yawe.
 
13 Nakobebisa milona na bango,
elobi Yawe.
Bambuma ya vino ekozala lisusu te na banzete ya vino,
mbuma ya figi ekozala lisusu te na banzete ya figi,
mpe makasa ya banzete yango ekokawuka.
Bakobotola bango biloko oyo napesaki bango. › »
 
14 Mpo na nini tozali kovanda awa ?
Tosangana esika moko !
Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi
mpo ete tokufela kuna !
Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa
mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela,
pamba te tosalaki masumu liboso na Ye.
15 Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia,
kasi tomoni likambo moko te ya malamu ;
tozalaki na elikya ete tokobika,
kasi pasi na pasi nde ezali kolanda biso !
16 Lokito ya bampunda ya banguna
mpe makelele ya makolo na yango
ezali koyokana wuta na Dani,
ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso
oyo ezali kati na yango,
engumba mpe bavandi na yango nyonso,
bongo mokili mobimba eningani.
 
17 « Botala, nakotindela bino banyoka oyo ebomaka,
bitupa oyo moto akoki kosakana na yango te,
mpo ete eswa bino, »
elobi Yawe.
Pasi ya mosakoli
18 Pasi na ngai ezangeli kisi
mpo na kosilisa yango,
motema na ngai elembi kati na ngai.
19 Yoka koganga ya bato na ngai
wuta na mokili ya mosika :
« Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona ?
Mokonzi na yango azali lisusu kuna te ? »
 
« Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngai
na nzela ya banzambe na bango ya bikeko,
na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina ? »
 
20 « Tango ya kobuka mbuma esili koleka,
elanga mpe esili kokoma na suka,
kasi biso tobikisami te. »
 
21 Ndenge bato na ngai bazali koyoka pasi,
ndenge wana mpe ngai nazali koyoka pasi,
nazali kolela, mpe somo ekangi ngai makasi.
22 Boni, kisi ezali te kati na Galadi ?
Minganga bazali kuna te ?
Bongo mpo na nini bato na ngai bazali kobika te ?
23 Ah ! Soki moto na ngai ezalaki etima,
mpe soki miso na ngai ezalaki liziba ya mpinzoli,
nalingaki kolela butu mpe moyi
mpo na bato na ngai, oyo basili koboma.