23
Babateli mabe mpe Mobateli Malamu
« Mawa na babateli bibwele oyo bazali koboma mpe kobungisa bibwele na Ngai, » elobi Yawe. Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai : « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe, « Ngai moko nakosangisa ndambo ya bibwele na Ngai, oyo batikali wuta na bikolo nyonso epai wapi nabenganelaki bango ; mpe nakozongisa bango na lopango na bango, esika oyo bakobotana mpe bakokoma ebele. Nakopesa bango na maboko ya babateli mosusu ya bibwele mpo ete babatela bango malamu. Boye, bakobanga lisusu te, bakozala lisusu na somo te mpe moko te kati na bango akozanga lisusu, » elobi Yawe.
« Na mikolo oyo ekoya, » elobi Yawe,
« nakobimisa Moto ya nzete mpo na Davidi,
mokonzi oyo akokamba na bwanya,
oyo akosala kolanda bosembo mpe bosolo.
Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama,
mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia.
Tala kombo oyo bakobengela ye :
Yawe azali Bosembo na biso.
Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; › kasi bakoloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bakitani ya Isalaele na mokili ya nor mpe na bikolo nyonso epai wapi abenganaki bango. › Bongo, bakovanda na mokili na bango moko. »
Basakoli ya lokuta
Na tina na basakoli :
Motema na ngai ebukani kati na ngai,
mikuwa na ngai nyonso ezali kolenga.
Nakomi lokola moto oyo alangwe masanga,
lokola moto oyo masanga ya vino ebeti ye,
likolo na Yawe mpe maloba na Ye ya bule.
10 Pamba te mokili etondi na kindumba,
mokili ekomi na matanga.
Likolo ya bilakeli mabe,
matiti oyo bibwele eliaka na esobe ekawuki,
basakoli bakomi kolanda nzela mabe
mpe bakomi na molende ya kosala
kaka makambo oyo esengeli te.
 
11 « Basakoli mpe Banganga-Nzambe, basundoli Nzambe ;
ezala kati na Tempelo na Ngai,
nazali komona misala na bango ya mabe, »
elobi Yawe.
12 « Yango wana, nzela na bango ekokoma
moselu mpe molili ;
bakobengana bango kino na mboka ya molili
mpe kuna bakokweya.
Nakotindela bango pasi,
tango oyo nakopesa bango etumbu, »
elobi Yawe.
 
13 « Namoni makambo ya nkele
kati na basakoli ya Samari :
bazali kosakola na kombo ya nzambe Bala
mpe bazali kobungisa Isalaele, bato na Ngai, nzela.
14 Namoni lisusu makambo ya nkele
kati na basakoli ya Yelusalemi :
bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta,
bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe
mpo ete batika te misala na bango ya mabe.
Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome,
bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »
15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli :
« Nakoleisa bango bilei ya bololo
mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge,
pamba te ezali na nzela ya basakoli ya Yelusalemi
nde bato ya mokili mobimba bobosani Nzambe. »
16 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Boyoka te makambo oyo basakoli
bazali kosakola epai na bino !
17 Bazali koloba na bato oyo batiolaka Ngai :
‹ Yawe alobi : Bokozala malamu ! ›
Mpe na bato oyo balandaka
makanisi mabe ya mitema na bango :
‹ Mabe moko te ekokomela bino ! ›
18 Kasi nani kati na basakoli wana akotaki na mayangani ya Yawe mpo ete amona to mpe ayoka Liloba na Yawe ? Nani apesaki litoyi mpo na koyoka liloba na Ye ?
19 Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki !
Kanda na Ye epeli lokola moto,
bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe.
20 Kanda ya Yawe ekokita te
kino ekokokisa malamu-malamu penza
mabongisi ya motema na Ye !
Bokozwa mayele ya kososola yango malamu
na mikolo oyo ekoya.
 
21 Natindaki basakoli wana te,
kasi tala ndenge bapoti mbangu mpo na kokende ;
nalobaki na bango likambo moko te,
kasi tala bango wana bazali kosakola !
22 Soki solo bazalaki na mayangani na Ngai,
balingaki nde koloba maloba na Ngai epai ya bato na Ngai,
mpe bato na Ngai balingaki kotika
banzela mpe misala na bango ya mabe !
 
23 Boni, bokanisi ete Ngai Nzambe namonaka kaka pene,
kasi namonaka mosika te ? »
elobi Yawe.
24 « Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku,
bongo Ngai nazanga komona ye ? »
elobi Yawe.
« Boni, natondisa likolo mpe mabele te ? »
elobi Yawe.
25 « Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai ; bazali koloba : ‹ Tala, naloti ndoto ! Naloti ndoto ! › 26 Kino tango nini penza basakoli oyo bakokoba kosakola makambo ya lokuta, makanisi ya pamba ya mitema na bango ? 27 Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala ? 28 Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble ? » elobi Yawe ; 29 « boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te ? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni ? » elobi Yawe.
30 « Yango wana, nakotelemela basakoli oyo bawelaka bango na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe ; 31 « solo, nakotelemela basakoli oyo bafungolaka minoko na bango mpo na kokomisa maloba na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe, 32 « nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.
Masakoli ya lokuta mpe basakoli ya lokuta
33 « Soki moko kati na bato oyo to mosakoli to Nganga-Nzambe atuni yo : ‹ Yawe alobi nini ? ›
Loba na ye : ‹ Yawe alobi nini ? Nakosundola bino, elobi Yawe. ›
34 Soki mosakoli to Nganga-Nzambe to moto mosusu alobi : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › nakopesa ye elongo na libota na ye etumbu. 35 Nzokande, tala maloba oyo moko na moko kati na bino asengeli koyebisa moninga to ndeko na ye : ‹ Eyano nini Yawe apesi ? Yawe alobi nini ? › 36 Kasi bosengeli lisusu te koloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › noki te liloba yango ekokoma etumbu mpo na moto oyo alobi yango, pamba te bobongoli maloba na Nzambe na bomoi, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na biso ! 37 Tala maloba oyo osengeli koloba na mosakoli wana : ‹ Eyano nini Yawe apesi yo ? › to ‹ Yawe alobi nini ? › 38 Nzokande, soki bolobi lisusu : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › wana tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola bosalelaka maloba oyo : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › ata tango Ngai nayebisaki bino : ‹ Boloba te : Tala liloba oyo Yawe alobi ! › 39 mpo na yango, nakobosana bino solo mpe nakobengana bino mosika ya elongi na Ngai, bino elongo na engumba oyo napesaki na bino mpe na batata na bino ; 40 nakoyokisa bino soni ya libela, soni oyo bokotikala kobosana te. »