25
Mibu tuku sambo ya bowumbu
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi na tina na bato nyonso ya Yuda, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi, mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mobu moko na bokonzi. Mosakoli Jeremi alobaki na bato nyonso ya Yuda mpe na bavandi nyonso ya Yelusalemi :
« Wuta tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi kino na mokolo ya lelo, ekokisi mibu tuku mibale na misato oyo nayebisaka bino tango na tango liloba oyo Yawe azalaki koloba na ngai, kasi boyokaki ngai te. Mpe atako Yawe azalaki kotindela bino tango na tango basakoli, basali na Ye, kasi bosalaki kaka keba te mpo na koyoka liloba na Ye. Bazalaki koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino abongola motema, atika nzela mpe misala na ye ya mabe ; pamba te ezali na nzela wana nde bokoki kowumela na mokili oyo Yawe apesaki bino mpe batata na bino, wuta kala, mpo na libela. Bolanda banzambe mosusu te, bosalela mpe bofukamela yango te ; bopelisa kanda na Ngai te na nzela ya banzambe ya bikeko oyo maboko na bino esali, mpe Ngai nakomonisa bino pasi te. Kasi boyokaki Ngai te, › elobi Yawe, ‹ botumbolaki Ngai kutu na nzela ya banzambe ya bikeko, oyo maboko na bino esalaki, mpe bomibendelaki bino moko pasi. › »
Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Lokola boyokaki maloba na Ngai te, nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi. 10 Nakolongola kati na bango pole ya mwinda, banzembo ya esengo mpe kosepela, makelele ya bisengo ya libala ya sika mpe ya libanga oyo banikelaka ble. 11 Mokili oyo mobimba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bikolo oyo ekosalela mokonzi ya Babiloni mibu tuku sambo. 12 Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela. 13 Nakokokisa kati na mokili yango maloba nyonso oyo nalobaki mpo na kotelemela yango, maloba nyonso oyo ekomama kati na buku oyo, maloba oyo Jeremi asakolaki mpo na kotelemela bikolo nyonso. 14 Bango, bato ya Babiloni, bakokoma mpe bawumbu ya bikolo ebele mpe ya bakonzi ya nguya ; nakosalela bango kolanda etamboli mpe misala ya maboko na bango. »
Kopo ya kanda ya Nzambe
15 Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobaki na ngai : « Kamata na loboko na Ngai kopo etonda na vino ya kanda na Ngai mpe melisa yango bikolo nyonso epai wapi nakotinda yo. 16 Tango bakomela yango, bakolangwa mpe bakokoma kotenga-tenga liboso ya mopanga oyo nakotinda kati na bango. »
17 Boye, nakamataki kopo yango na loboko ya Yawe mpe namelisaki yango bikolo nyonso epai wapi atindaki ngai : 18 Yelusalemi elongo na bingumba ya Yuda, bakonzi mpe bakalaka na yango ; mpo na kobebisa yango, kokomisa yango eloko ya somo, ya maseki mpe ya lisuma, ndenge ezali komonana sik’oyo. 19 Namelisaki yango Faraon, mokonzi ya Ejipito ; basali na ye, bakalaka na ye, bato na ye nyonso, 20 bapaya nyonso oyo bavandaka kuna, bakonzi nyonso ya mokili ya Utsi ; bakonzi nyonso ya mokili ya Filisitia, ya Ashikeloni, ya Gaza, ya Ekroni mpe ya bato oyo batikalaki na Asidodi ; 21 Edomi, Moabi, bato ya Amoni ; 22 bakonzi nyonso ya Tiri mpe ya Sidoni ; bakonzi ya bisanga mpe ya bituka oyo ezalaka pene ya ebale monene ; 23 Dedani, Tema, Buzi mpe bato nyonso oyo bavandaka mosika mpe batikaka mandefu te ; 24 bakonzi nyonso ya Arabi mpe bakonzi nyonso ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na esobe ; 25 bakonzi nyonso ya Zimiri, ya Elami mpe ya Medi ; 26 bakonzi nyonso ya nor, oyo bazalaka pene mpe ba-oyo bazalaka mosika, moko pene na mosusu, bakonzi ya mboka nyonso oyo ezalaka na mokili. Sima na bango nyonso, mokonzi ya Sheshaki mpe akomela yango.
27 « Boye loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomela, bolangwa mpe bosanza, bokweya mpo na kotelema lisusu te, mpo na mopanga oyo nakotinda kati na bino. › 28 Soki baboyi kozwa mpe komela kopo oyo ezali na loboko na yo, okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Bomela ! Bomela ! 29 Pamba te, botala ! Ezali na engumba epai wapi babelelaka Kombo na Ngai nde nabandi kotinda pasi ; boni, bokanisi ete bino bokozwa etumbu te ? Bokozanga te kozwa etumbu, pamba te nazali koyeisa mopanga kati na bavandi nyonso ya mokili, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›
30 Sakola maloba oyo nyonso mpo na kotelemela bango mpe loba na bango :
‹ Yawe azali koganga wuta na likolo,
azali kotomboka lokola kake
wuta na Esika na Ye ya bule,
azali konguluma makasi
mpo na kotelemela mokili na Ye !
Akoganga lokola bato oyo bakamolaka mbuma ya vino,
akogangela bavandi nyonso ya mokili oyo !
31 Makelele ya makasi ekoyokana kino na suka ya mokili ;
pamba te Yawe akosambisa bikolo,
akosambisa bato nyonso,
akobomisa bato mabe na mopanga, › »
elobi Yawe.
32 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Tala ! Pasi ezali kopanzana
longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu ;
mopepe makasi etelemi longwa na basuka ya mokili. »
33 Na tango wana, bato oyo Yawe akoboma bakozala bisika nyonso, longwa na songe moko kino na songe mosusu ya mokili. Bakosalela bango matanga te, bakosangisa bango te mpo na kokunda bango.
34 Bino babateli bibwele, bolela mpe boganga !
Bino bakambi ya bitonga, bobaluka-baluka na putulu !
Pamba te tango na bino ya kokufa ekoki !
Bokokweya mpe bokopanzana mike-mike lokola mbeki.
35 Babateli bibwele bakozanga esika ya kokimela ;
bakambi ya bampate bakozanga esika ya kobombama.
36 Boyoka koganga ya babateli bibwele,
kolela ya bakambi ya bampate,
pamba te Yawe azali kobebisa
bazamba epai wapi bibwele eliaka.
37 Bitando ya kimia ekotikala pamba
likolo ya kanda ya Yawe.
38 Lokola nkosi etikaka ndako na yango,
mokili na bango mpe ekotikala lisusu na bato te
likolo ya mopanga ya banyokoli na bango
mpe likolo ya kanda ya Yawe.