30
Lobiko ya bana ya Isalaele
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :
« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Koma kati na buku makambo nyonso oyo nayebisaki yo. Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu ; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. »
Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele mpe Yuda :
« Tala liloba oyo Yawe alobi :
‹ Koganga ya kobanga mpe ya somo
nde ezali koyokana ; kimia ezali lisusu te.
Botuna mpe botala :
Boni, mobali akoki kobota bana ?
Bongo mpo na nini nazali komona
moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye
lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota
mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa ?
Mawa ! Ekozala penza mokolo ya somo !
Mokolo moko te ekokokana na yango !
Ekozala tango ya pasi mpo na Jakobi,
kasi akobikisama na pasi yango.
 
Na mokolo wana, ›
elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga,
‹ nakobuka ekangiseli na bakingo na bango,
nakokata basinga oyo bakangelaki bango
mpe bakozala lisusu te bawumbu ya bapaya.
Nzokande, bakosalela Yawe, Nzambe na bango,
mpe Davidi, mokonzi oyo nakotia
mpo ete akamba bango.
 
10 Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te !
Oh Isalaele, kozala na somo te, ›
elobi Yawe.
‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika,
mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu !
Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi,
mpe moto moko te akobangisa ye lisusu.
11 Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, ›
elobi Yawe.
‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso
epai wapi napanzaki bino ;
kasi bino, nakobebisa bino nye te ;
solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ;
nakozanga te kopamela bino. ›
12 Tala liloba oyo Yawe alobi :
‹ Pota na yo ekobika te
mpe pasi na yo ekosila te.
13 Moto akolobela yo akozala te,
kisi ezali te mpo na pota na yo,
lobiko ezali te mpo na yo.
14 Baninga na yo nyonso babosani yo,
bazali komitungisa lisusu te mpo na yo.
Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka,
napesaki yo penza etumbu na kanda makasi,
pamba te ngambo na yo ezalaki monene
mpe masumu na yo eleki ebele.
15 Mpo na nini ozali koganga mpo na pota na yo,
mpe pasi na yo ezali kosila te ?
Nasali yo boye mpo ete ngambo na yo ezali monene,
mpe masumu na yo eleki ebele.
 
16 Kasi bato nyonso oyo bakosala yo mabe,
bakosala bango mpe mabe ;
banguna na yo nyonso bakokende na bowumbu ;
bato oyo babotolaki yo biloko,
bakobotola bango mpe biloko ;
bato oyo banyokolaki yo,
bakonyokola mpe bango.
17 Nakozongisela yo bomengo na yo
mpe nakobikisa bapota na yo, ›
elobi Yawe.
‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola,
Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa ; ›
18 tala liloba oyo Yawe alobi :
‹ Nakozongisa lisusu bomengo
kati na bandako ya kapo ya Jakobi
mpe nakoyokela bandako na ye mawa ;
bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukana
mpe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala.
19 Nzembo ya matondi mpe mingongo ya esengo
ekobima kati na bango.
Nakokomisa bango ebele,
mpe motango na bango ekokoma ebele ;
nakopesa bango lokumu, mpe bakotiolama lisusu te.
20 Bana na bango ya mibali bakozala
lokola na tango ya kala,
mpe lingomba na bango ekowumela liboso na Ngai ;
nakopesa etumbu na bato nyonso
oyo bazali konyokola bango.
21 Mokonzi na bango akowuta kati na bango,
mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango ;
nakobenda bango pene na Ngai
mpe bakoya pene na Ngai,
pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai ? ›
elobi Yawe.
22 ‹ Boye, bokozala bato na Ngai,
mpe Ngai nakozala Nzambe na bino. › »
 
23 Tala, mopepe ya Yawe etomboki,
kanda makasi na Ye epeli,
bakake ezali konguluma na likolo,
mpe ezali kokweya na mito ya bato mabe.
24 Kanda makasi ya Yawe ekozonga te
kino tango ekokokisa mabongisi ya motema na Ye.
Bokososola yango penza na mikolo ekoya.