33
Elaka ya lobiko
Yawe alobaki na Jeremi, na mbala ya mibale, wana azalaki nanu ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli :
« Tala liloba oyo Yawe, Ye oyo akela mabele, oyo abongisa yango malamu mpe alendisa yango, oyo Kombo na Ye ezali Yawe, alobi : ‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. › Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na bandako ya engumba oyo mpe ya bandako ya bakonzi ya Yuda, oyo babukaki mpo na kotelemela bangomba mike ya kokimela mpe mopanga ya monguna kati na etumba na bato ya Babiloni : ‹ Bandako yango ekotonda na bibembe ya bato oyo nakoboma na nguya ya kotomboka mpe ya kanda na Ngai. Nakobombela engumba oyo elongi na Ngai likolo ya mabe na yango nyonso.
Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami. Nakokangola bato ya Yuda mpe ya Isalaele longwa na bowumbu mpe nakokomisa bango lisusu ndenge bazalaki liboso. Nakopetola bango na masumu nyonso oyo basalaki liboso na Ngai. Nakolimbisa masumu nyonso ya botomboki oyo basalaki liboso na Ngai. Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›
10 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bozali koloba na tina na esika oyo : ‘ Eh ! Esika oyo ebeba ! Ezalaka lisusu na bato mpe banyama te ! ’ Nzokande, kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi oyo ekoma polele, ezanga bato mpe banyama, ekozala lisusu na lokito : 11 ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba :
‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,
mpo ete Yawe azali malamu ;
bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’
Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.
12 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Kati na esika oyo ebebisama mpe ezanga bato to banyama, mpe kati na bingumba na yango nyonso, ekozala na lisusu na bitando ya matiti mpo na babateli bibwele, bitando epai wapi bakoleisa bibwele na bango. 13 Kati na bingumba ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi, kati na etuka ya Benjame, kati na bamboka oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi mpe kati na bingumba ya Yuda, bibwele ekoleka lisusu na se ya loboko ya moto oyo atangaka yango, › elobi Yawe.
14 ‹ Na mikolo ekoya, › elobi Yawe, ‹ nakokokisa elaka kitoko oyo napesaki na mabota ya Isalaele mpe ya Yuda.
15 Na mikolo yango mpe na tango yango,
nakobimisa Moto ya nzete ya sembo
wuta na libota ya Davidi ;
akosala makambo ya sembo
mpe ya boyengebene kati na mokili.
16 Na mikolo wana, Yuda ekobikisama,
mpe Yelusalemi ekozala na kimia.
Tala kombo oyo bakobengela yango :
Yawe azali Bosembo na biso. ›
17 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Davidi akozalaka tango nyonso na moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya libota ya Isalaele ; 18 Banganga-Nzambe oyo bazali bakitani ya Levi bakozalaka tango nyonso na bakitani oyo bakobanda kotelema tango nyonso liboso na Ngai mpo na kotumba mbeka, kobonza mbeka ya gato mpe kobonza makabo. › »
19 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : 20 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Soki bolongi kokata boyokani na Ngai elongo na moyi, mpe boyokani na Ngai elongo na butu, mpo ete moyi mpe butu ekoma lisusu te na tango na yango, 21 wana bokolonga penza kokata boyokani na Ngai elongo na Davidi, mosali na Ngai, mpe Davidi akotikala kozala lisusu te na mokitani na kiti ya bokonzi, mpe bokolonga kokata boyokani na Ngai elongo na Balevi oyo bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ngai. 22 Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »
23 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : 24 « Boni ! Bozali koyoka te makambo bato oyo bazali kosala ? Bazali koloba : ‹ Yawe asundoli bituka mibale oyo aponaki. › Na bongo, bazali kotiola bato na Ngai, mpe moto ata moko te azali kozwa bango lokola ekolo. 25 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Soki nasalaki boyokani te elongo na moyi mpe elongo na butu, mpe soki napesaki likolo mpe mabele mibeko te, 26 wana nakokaki kobwaka bakitani ya Jakobi mpe ya Davidi, mosali na Ngai, mpe nalingaki te kopona moko kati na bana na ye mpo ete akamba bakitani ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi. Nakozongisa lisusu kitoko ya mokili na bango mpe nakoyokela bango mawa. › »