35
Libota ya Rekabi
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, azalaki mokonzi : « Kende epai ya bato ya libota ya Rekabi mpe bengisa bango ete baya kokota kati na moko ya bashambre ya Tempelo ya Yawe. Mpe pesa bango masanga ya vino ya komela kuna. »
Boye, nakendeki kokutana na Yazania, mwana mobali ya Jeremi, mwana mobali ya Abatsinia, mpe bandeko na ye ya mibali elongo na bana na bango nyonso ya mibali : libota mobimba ya bato ya libota ya Rekabi. Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke. Natiaki biloko etonda na vino mpe ndambo ya bakopo liboso ya bato ya libota ya Rekabi ; mpe nalobaki na bango :
— Bomela masanga ya vino.
Kasi bazongisaki :
— Tomelaka masanga ya vino te, mpo ete koko na biso, Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki biso mobeko oyo : « Bokoki komela masanga ya vino te, ezala bino to bakitani na bino, mpe bokoki kotonga bandako te, kosala bilanga te, kolona banzete ya vino te mpe bokoki kozala na biloko wana te ; kasi bosengeli kaka kovanda tango nyonso na bandako ya kapo, mpo ete bozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bozali baleki nzela. » Totosaka makambo nyonso oyo koko na biso Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, ayebisa biso : Ezala biso, basi na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, tomelaka masanga ya vino te, totongaka bandako te mpo na kovanda kuna, tozalaka na bilanga ya vino te, bilanga te mpe milona te ; 10 tovandaka kaka na bandako ya kapo mpe totosaka makambo nyonso oyo koko na biso, Yonadabi, ayebisa biso. 11 Kasi tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abotolaki mokili oyo, tolobaki : « Boya, tokende na Yelusalemi mpo ete tobikisa bomoi na biso liboso ya basoda ya Babiloni mpe ya Siri. » Yango wana, toyaki kovanda na Yelusalemi.
12 Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :
13 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Kende koyebisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokoki solo kozwa liteya te mpe kotosa maloba na Ngai te, » elobi Yawe ? 14 « Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki mobeko epai ya bana na ye ete bamela masanga ya vino te, mpe babatelaka mobeko yango. Kino na mokolo ya lelo, bamelaka masanga ya vino te mpo na kotosa mobeko oyo koko na bango apesaki bango. Nzokande, tango na tango, Ngai nazalaki koloba na bino, kasi bozalaki koyoka Ngai te. 15 Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te. 16 Bakitani ya Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, babatelaki mobeko oyo koko na bango apesa bango, kasi bato oyo baboyi kotosa Ngai. »
17 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na mokili ya Yuda mpe epai ya bavandi nyonso ya Yelusalemi pasi oyo nakataki ; pamba te nalobaki na bango kasi bayokaki Ngai te, nabengaki bango kasi bayanolaki Ngai te. »
18 Boye, Jeremi alobaki na bato ya libota ya Rekabi :
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Lokola botosaka mobeko ya koko na bino Yonadabi, bolandaka malako nyonso oyo ayebisa bino mpe bosalelaka makambo nyonso oyo atinda bino, 19 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, akotikala kozanga te moto oyo akosalela Ngai. › »