42
Kokima na Ejipito
Bongo, bakonzi nyonso ya basoda mpe Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Yezania, mwana mobali Oshaya, mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene, bapusanaki pene ya mosakoli Jeremi mpe balobaki na ye :
— Tosengi na yo, tika ete libondeli na biso ekoma liboso na yo : « Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na biso bato oyo totikali ; pamba te ndenge ozali komona yango, tozalaki ebele, kasi sik’oyo totikali kaka moke. Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpo ete ayebisa biso esika nini tosengeli kokende mpe makambo nini tosengeli kosala. »
Mosakoli Jeremi alobaki na bango :
— Nayoki bino ! Nakobondela Yawe, Nzambe na bino, ndenge ezali bosenga na bino ; mpe nakoyebisa bino makambo nyonso oyo Yawe akoloba, nakobombela bino ata likambo moko te.
Balobaki na Jeremi :
— Tika ete Yawe azala motatoli ya solo mpe ya sembo mpo na kopesa biso etumbu soki toboyi kotosa makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mokumba ya koyebisa biso. Ezala esepelisi biso to te, tokotosa kaka Yawe, Nzambe na biso, oyo topesi yo mokumba ya kotuna. Na bongo, makambo nyonso ekotambola malamu mpo na biso, pamba te tokotosa Yawe, Nzambe na biso.
Sima na mikolo zomi, Yawe alobaki na Jeremi ; mpe Jeremi abengaki Yoanani, mwana mobali ya Karea ; bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene. Alobaki na bango :
— Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi, Ye oyo epai ya nani botindaki ngai mpo na kokomisa libondeli na bino : 10 « Soki botikali kati na mokili oyo, nakobikisa bino mpe nakobebisa bino te ; nakolona bino mpe nakopikola bino te, pamba te etumbu ya pasi oyo natindeli bino esali Ngai pasi na motema. 11 Bobanga lisusu te mokonzi ya Babiloni, oyo bozali kobanga lelo ; bobanga ye te, » elobi Yawe, « pamba te nazali elongo na bino mpo na kobikisa bino mpe mpo na kokangola bino na maboko na ye. 12 Nakotalisa bino ngolu mpo ete ayokela bino mawa mpe azongisa bino na mokili na bino. »
13 Nzokande, soki bolobi : « Tokovanda na biso kati na mokili oyo te, » soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, 14 mpe soki bolobi : « Te ! Tokokende nde kovanda na Ejipito epai wapi tokomona lisusu bitumba te, tokoyoka lisusu lolaka ya kelelo te mpe tokokufa lisusu nzala te ; » 15 wana bino batikali ya Yuda, boyoka malamu Liloba na Yawe : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Soki botingami kaka kokende na Ejipito mpe soki bokeyi kovanda kuna, 16 mopanga oyo bozali kobanga ekokweyela bino kuna, na Ejipito ; nzala oyo bozali kobanga ekolanda bino kuna, na Ejipito, mpe ezali kuna nde bokokufa. 17 Solo, bato nyonso oyo bakotingama kokende kaka kovanda na Ejipito bakokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; moko te kati na bango akotikala na bomoi mpe akobika na pasi oyo nakotindela bango. › 18 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›
19 Oh bino batikali ya Yuda, Yawe azali koloba na bino : ‹ Bokende na Ejipito te ! › Bososola malamu likambo oyo : ngai nazali nde kokebisa bino lelo 20 ete bozali kosala libunga monene tango bozali kotinda ngai epai na Yawe, Nzambe na bino, na maloba oyo : ‹ Bondela mpo na biso Yawe, Nzambe na biso, mpe yebisa biso makambo nyonso oyo Yawe akoloba ; tokosalela yango. › 21 Na mokolo kaka ya lelo, nayebisi bino yango, kasi boboyi lisusu kotosa Yawe, Nzambe na bino, na nyonso oyo atindi ngai koyebisa bino. 22 Boye, boyeba sik’oyo malamu likambo oyo : bokokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka na esika oyo bolingi kokende mpo na kovanda. »