Na tina na bikolo ya bapaya
46
Maloba ya kosambisa Ejipito
Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bikolo ya bapaya :
 
Na tina ya Ejipito :
 
Tala maloba ya kosambisa mampinga ya Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alongaki pene ya ebale Efrate, na Karikemishi, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi :
« Bobongisa banguba na bino : ya minene mpe ya mike,
mpe bokende bitumba !
Bobongisa bampunda mpe bomata na bashar !
Bomitanda na milongo mpe bolata bikoti ya bitumba !
Bopelisa basonge ya makonga na bino mpe bolata bibundeli !
 
Nazali komona nini ?
Bazali kolenga na somo mpe kozonga sima ;
balongi basoda na bango ya mpiko,
bazali kopota mbangu makasi
mpe bazali ata kotala sima te :
somo ekangi bango na bangambo nyonso, »
elobi Yawe.
« Bato ya mbangu bazali kokoka lisusu kokima te,
mpe basoda ya mpiko bazali kokoka lisusu kobika te !
Bazali nde kobeta mabaku mpe kokweya
pembeni ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.
 
Nani oyo azali koya lokola ebale Nili,
lokola mayi ya bibale oyo etomboki ?
Mokili ya Ejipito ezali koya lokola ebale Nili,
lokola mayi ya bibale oyo etomboki.
Ejipito ezali koloba :
‹ Nakoya mpe nakotondisa mokili,
nakobebisa bingumba mpe bato na yango. ›
Bino bampunda, bokende !
Bino basoda oyo botambolaka likolo ya bashar,
botambolisa mbangu !
Bino basoda, bato ya Kushi mpe ya Puti,
oyo bomemaka banguba,
mpe bino bato ya Ludi oyo bobundaka na matolotolo,
bokende liboso !
 
10 Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
mokolo ya kozongisa mabe na mabe,
mpo na kozongisela banguna na yo mabe.
Mopanga ekoboma kino ekotonda,
kino ekosilisa posa na yango ya makila ;
pamba te ezali nde mbeka
mpo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.
 
11 Oh moseka Ejipito,
kende kozwa malasi kati na Galadi !
Ozali kobakisa na pamba bakisi likolo ya bakisi,
okobika na yo te !
12 Bikolo ya bapaya ekoyoka sango ya soni na yo,
makelele ya koganga na yo ekotondisa mabele.
Soda moko akotutana na soda mosusu,
mpe bango mibale bakokweya nzela moko. »
13 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na koya ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpo na kobundisa Ejipito :
14 « Loba makambo oyo na Ejipito
mpe tatola yango na Migidoli ;
tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi :
‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama,
pamba te mopanga ezali koboma bato
oyo bazali zingazinga na yo. ›
15 Mpo na nini bamemi basoda na yo ya mpiko ?
Bakokaki kopika te,
pamba te Yawe akweyisaki bango.
16 Tango nyonso, bazali se kobeta mabaku,
bazali kokweya moko likolo ya mosusu.
Bazali koloba : ‹ Tika ete totelema
mpe tozonga epai ya bato na biso moko
mpe na mokili na biso, epai babota biso,
mpo ete tobika na mopanga oyo ezali koboma. ›
17 Kuna, bakokoma koganga :
‹ Faraon, mokonzi ya Ejipito, atiaka kaka makelele ya pamba,
akoki na ye makambo te ! ›
18 Lokola Ngai nazali na bomoi, »
elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali
Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
« monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba,
lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene,
azali koya !
19 Yo movandi ya Ejipito,
kanga bisaka na yo mpo na kokende na bowumbu,
pamba te Mefisi ekokoma esobe,
ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te !
 
20 Mokili ya Ejipito ezali lokola mwana ngombe ya kitoko ya mwasi,
kasi nzinzi ezali koya koswa yango kowuta na nor.
21 Basoda ya bapaya bazali kati na milongo na ye,
bazali lokola bana ngombe ya mibali mpe ya mafuta kati na etonga.
Bango mpe bakobaluka mpe bakokima nzela moko ;
bakokoka kolonga te,
pamba te mokolo ya pasi ezali koya kokweyela bango :
ezali tango ya etumbu mpo na bango.
22 Ejipito ezali kokima, na makelele lokola nyoka,
pamba te banguna na yango bazali kopusana na nguya ;
bazali koya kobundisa yango na bipasola
lokola bato oyo bakataka banzete.
23 Bakokata banzete nyonso ya zamba na yango, »
elobi Yawe,
« ata soki ezali na banzete ebele.
Bazali ebele koleka mabanki,
bakokoka kotanga motango na bango te.
24 Elenge mwasi ya Ejipito akoyokisama soni,
akokweya na maboko ya bato ya nor. »
25 Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nakopesa etumbu epai na Amoni, na nzambe ya Tebesi, na Faraon, na Ejipito mpe na banzambe na yango, na Faraon mpe na bato oyo batiaka mitema na bango epai na ye. 26 Nakokaba bango na maboko ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya bakonzi ya basoda na ye. Mpe na sima na tango, Ejipito ekotonda lisusu na bato oyo bakovanda kuna, ndenge ezalaki na tango ya kala, » elobi Yawe.
27 « Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te !
Oh Isalaele, kobanga te ;
nakobikisa yo solo wuta na mokili ya mosika,
nabikisa bakitani na yo wuta na mokili ya bowumbu.
Jakobi akozala lisusu na kimia mpe na bobatelami malamu,
moto moko te akobangisa ye lisusu.
28 Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ;
pamba te nazali elongo na yo, »
elobi Yawe,
« ata soki nabebisi bikolo nyonso
epai wapi napanzaki bino,
nakobebisa yo nyonso te.
Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo ;
nakozanga te kopesa yo etumbu. »