28
Mabombami ya Bwanya
Ezali na esika oyo batimolaka palata,
mpe na esika oyo bapetolaka wolo.
Ebende ewutaka na mabele,
mpe libanga oyo balekisaka na moto epesaka motako.
Moto asilisaka molili,
alukaka kino na se, na bisika ya se penza,
libanga kati na molili oyo eleki makasi,
atimolaka libulu mosika ya esika oyo bato bavandaka,
na bisika oyo makolo ya bato ekomaka te, mosika penza na bato,
adiembelaka mosika ya bato nyonso.
Mabele epai wapi bilei ewutaka ebongwani na se na yango
lokola nde moto ezikisi yango.
Mabanga ya safiri ewutaka na mabanga makasi ya mabele,
mpe putulu ya wolo ezalaka kati na mabele.
Ndeke moko te oyo eliaka misuni eyebi nzela na yango,
miso ya mpongo moko te emoni yango,
nyama ya zamba etia nanu makolo na yango kuna te,
mpe nkosi etambola nanu kuna te.
Moto abetaka loboko na ye na likolo ya libanga ya makasi
mpe apikolaka ngomba longwa na misisa,
10 atimolaka nzela kati na mabanga,
mpe miso na ye emonaka bomengo na yango nyonso,
11 akawusaka mayi ya bibale
mpe abimisaka na pole biloko oyo ebombama.
 
12 Kasi bakoki komona bwanya wapi ?
Mayele evandaka wapi ?
13 Moto ayebaka motuya na yango te,
pamba te bakoki komona yango te
kati na mokili ya bato ya bomoi.
14 Libulu ya mozindo elobi : « Ezali kati na ngai te ; »
mpe ebale monene elobi : « Ezali epai na ngai te. »
15 Bakoki kosomba yango te
na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata ;
16 bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri
to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri ;
17 wolo to diama ekoki te kokokana na yango,
bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko.
18 Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te
liboso na yango.
Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo.
19 Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te,
mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto.
 
20 Boye, bwanya ewutaka wapi ?
Mayele evandaka wapi ?
21 Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi,
ebombami mpe mosika na miso ya bandeke ya likolo.
22 Libebi mpe kufa elobi : « Kaka sango na yango
nde ekomaki na matoyi na biso. »
23 Nzambe kaka nde ayebi nzela na yango,
Ye nde kaka ayebi esika bwanya evandaka.
24 Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili,
mpe amonaka nyonso oyo ezali na se ya Lola.
25 Tango apesaki makasi na mopepe
mpe atiaki mondelo na mayi,
26 tango atiaki mobeko mpo na mvula
mpe afungolaki nzela mpo na kake mpe mikalikali,
27 amonaki bwanya mpe akumisaki yango,
andimaki yango mpe amekaki yango.
28 Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya !
Koboya mabe, yango nde mayele ! »