Joeli
1
Mampinga ya mabanki
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Joeli, mwana mobali ya Petueli :
— Bino bakambi ya bato, boyoka liloba oyo ;
bino nyonso, bavandi ya mokili,
botia matoyi mpe boyoka !
Boni, likambo ya boye esila kosalema
na tango na bino to mpe na tango ya bakoko na bino ?
Boyebisa yango epai ya bana na bino,
mpe tika ete bana na bino bayebisa yango
epai ya bana na bango ;
mpe bana na bango, na milongo ya bato
oyo bakoya na sima.
Matiti oyo mampinga ya mabanki etiki,
mabanki minene elie yango ;
oyo mabanki minene etiki,
mabanki mike elie yango ;
oyo mabanki mike etiki,
mabanki mosusu elie yango.
Bino balangwi masanga, bolamuka mpe bolela ;
bolela, bino nyonso bameli vino.
Pamba te babotoli bino vino ya sika na bibebu.
Ekolo moko ya bapaya ebundisi mokili na Ngai,
ezali na nguya makasi mpe bakokoka te kotanga
motango ya bato na yango.
Minu na yango ezali lokola minu ya nkosi ya mobali,
mpe mbanga na yango, lokola mbanga ya nkosi ya mwasi.
Ekolo yango ekomisi elanga na Ngai ya vino
lokola esobe mpe ekati-kati banzete na Ngai ya figi,
elongoli banzete na Ngai nyonso baposo,
ebwaki yango mpe etiki bitape na yango pembe.
Bosala matanga lokola elenge mwasi oyo alati pili
mpo na kolela mobandami na ye.
Makabo ya bambuma mpe ya masanga
ezali kopesama lisusu te na Tempelo ya Yawe.
Banganga-Nzambe, basali ya Nkolo, bazali na matanga.
10 Bilanga ebebisami, mabele ekawuki,
mbuma ya ble ezali lisusu te,
vino esili mpe mafuta ezali lisusu te.
11 Bino basali bilanga, bozala na soni ;
bino baloni vino, bolela mpo na mbuma ya ble mpe ya orje,
pamba te milona ebebisami.
12 Bilanga ya vino ekawuki,
banzete ya figi elembi-lembi,
banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome,
banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka.
Solo, esengo ya bato esili.
Kobengama mpo na kobongola motema
13 Oh bino Banganga-Nzambe,
bolata basaki mpe bolela.
Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela.
Bino basali ya Nzambe na ngai, boya,
bolata basaki butu mobimba.
Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga
ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.
14 Bopanza sango ya kokila bilei,
bobengisa bato na mayangani ya bule,
bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili
ete baya na Ndako ya Nzambe na bino
mpe bolela epai na Yawe.
 
15 Mawa na mokolo wana !
Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ;
ekoya lokola libebi
oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
 
16 Boni, wuta na Ndako ya Nzambe mpe na miso na biso,
balongoli te bilei, esengo mpe kosepela ?
17 Bankona ekawuki na se ya mabele,
bibombelo etikali lisusu na eloko te,
bibombelo ya bambuma ebukani
mpo ete ble ezali lisusu te.
18 Tika ete ngombe elela !
Bibwele ekomi kotelengana,
pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te ;
ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.
 
19 Oh Yawe, Yo nde nazali kobelela,
pamba te moto ezikisi matiti mpe banzete nyonso ya bilanga.
20 Ezala banyama ya zamba ezali kotalela Yo,
pamba te miluka ekawuki
mpe moto ezikisi bilanga.