24
Isalaele azwi mokano ya kosalela Yawe
Jozue asangisaki mabota nyonso ya Isalaele na Sishemi. Abengisaki bampaka, bakambi, basambisi mpe bakalaka ya Isalaele ; mpe bango bayaki liboso ya Nzambe.
Jozue alobaki na bato nyonso :
— Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Wuta kala, bakoko na bino mpe Tera, tata ya Abrayami mpe Naori, bavandaki na ngambo mosusu ya ebale mpe bazalaki kosalela banzambe mosusu. Kasi nabimisaki tata na bino, Abrayami, wuta na mokili oyo ezalaki na ngambo mosusu ya ebale, natambolisaki ye na mokili mobimba ya Kanana mpe napesaki ye bakitani ebele. Napesaki ye Izaki ; mpe na nzela ya Izaki, napesaki ye Jakobi mpe Ezawu. Napesaki mokili ya bangomba Seiri epai ya Ezawu, kasi Jakobi elongo na bana na ye ya mibali, bakendeki na Ejipito.
Boye, natindaki Moyize mpe Aron ; nabetaki Ejipito kolanda makambo nyonso oyo nasalaki kuna mpe nabimisaki bino kuna. Tango nabimisaki batata na bino na Ejipito, bakomaki kino na ebale monene ya Barozo, bato ya Ejipito balandaki bango na bashar mpe na basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda kino na Ebale monene ya Motane. Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe.
Namemaki bino na mokili ya bato ya Amori, oyo bazalaki kovanda na ngambo ya este ya Yordani. Babundisaki bino kasi nakabaki bango na maboko na bino. Nabomaki bango na miso na bino mpe bobotolaki mokili na bango. Tango Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, abimaki mpo na kobundisa Isalaele, atindaki ete baluka Balami, mwana mobali ya Beori, mpo ete alakela bino mabe. 10 Kasi naboyaki koyoka Balami, boye akomaki nde kopambola bino tango na tango mpe nakangolaki bino na loboko na ye.
11 Boye bokatisaki Yordani mpe bokomaki na engumba Jeriko. Bavandi ya Jeriko babundisaki bino ndenge kaka bato ya Amori, ya Perizi, ya Kanana, ya Iti, ya Girigazi, ya Evi mpe ya Yebusi, basalaki ; kasi nakabaki bango mpe na maboko na bino. 12 Natindelaki bango liboso na bino, banzoyi ya minene oyo ebenganaki bango mosika na bino, na bakonzi mibale ya Amori. Bosalaki yango na mipanga mpe na matolotolo na bino te. 13 Boye, napesaki bino mokili oyo bino bomonelaki pasi te mpe bingumba oyo bino botongaki te. Bokomaki kovanda kuna, kolia bambuma ya bilanga ya vino mpe ya olive oyo bolonaki te.
14 Sik’oyo botosa Yawe mpe bosalela Ye na motema mobimba mpe na bosembo. Bobwaka banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngambo mosusu ya ebale mpe na Ejipito, mpe bosalela Yawe. 15 Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »
16 Bato bazongisaki :
— Tozali na likanisi te ya kosundola Yawe to ya kosalela banzambe mosusu ! 17 Pamba te Yawe azali Nzambe na biso ; ezali Ye Yawe nde abimisaki biso mpe batata na biso na Ejipito, na mokili wana ya bowumbu, mpe asalaki na miso na biso bilembo minene ya kokamwa. Azalaki kobatela biso na banzela nyonso oyo tozalaki kotambola mpe kati na bikolo nyonso epai wapi tozalaki koleka. 18 Yawe abenganaki liboso na biso bikolo nyonso elongo na bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na mokili oyo. Biso mpe tokosalela Yawe, pamba te azali Nzambe na biso.
19 Jozue alobaki na bato :
— Bokokoka kosalela Yawe te, pamba te azali Nzambe ya Bule, Nzambe ya Zuwa ; akolimbisa te botomboki mpe masumu na bino. 20 Soki bosundoli Yawe mpe bokeyi kosalela banzambe ya bapaya, akobalukela bino mpo na kosala bino mabe, mpe akosilisa koboma bino sima na kotalisa bino bolamu.
21 Kasi bato balobaki na Jozue :
— Te, tokosalela kaka Yawe !
22 Jozue alobaki na bato :
— Bozali bino moko batatoli mpo na bino awa boponi kosalela Yawe.
Bazongisaki :
— Ezali se bongo, tondimi yango, tozali batatoli.
23 Jozue alobaki :
— Na bongo, bolongola sik’oyo banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino mpe bopesa mitema na bino nyonso epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
24 Bato bazongiselaki Jozue :
— Tokosalela Yawe, Nzambe na biso, mpe tokoyoka mongongo na Ye.
25 Na mokolo wana, Jozue asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele na Sishemi, mpe apesaki bango mibeko mpe bikateli. 26 Bongo, Jozue akomaki makambo wana nyonso na buku ya Mobeko ya Nzambe. Akamataki libanga moko ya monene mpe atelemisaki yango wana, na se ya terebente oyo ezalaki kati na Esika ya bule ya Yawe.
27 Jozue alobaki na bato nyonso :
— Botala, libanga oyo ekozala litatoli mpo na biso, pamba te esili koyoka maloba nyonso oyo Yawe alobi na biso. Ekozala motatoli mpo na kosambisa bino mpo ete bowangana Nzambe na bino te.
28 Boye, Jozue azongisaki bato, moto na moto kati na libula na ye.
Kufa ya Jozue
29 Sima na makambo oyo, Jozue, mwana mobali ya Nuni, mowumbu na Yawe, akufaki na mibu nkama moko na zomi. 30 Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Sera, na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi.
31 Bato ya Isalaele basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele bazalaki na bomoi.
32 Mpe bakundaki mikuwa ya Jozefi oyo bana ya Isalaele bamemaki wuta na Ejipito na Sishemi, na eteni ya elanga oyo Jakobi asombaki na motuya ya mbongo ya bibende nkama moko, epai ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi. Yango ekoma mpe libula ya bakitani ya Jozefi.
33 Bongo, Eleazari, mwana mobali ya Aron, mpe akufaki. Bakundaki ye na ngomba moke oyo bapesaki na Pineasi, mwana na ye ya mobali, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.