Bileli
Nzembo ya liboso ya mawa : Yelusalemi esundolami na maboko ya banguna na yango
1
Yelusalemi ezali na matanga
Tala ndenge nini engumba oyo, na kala,
ezalaki na bato ebele penza,
etikali lisusu na bato te !
Tala ndenge nini engumba
oyo ezalaki na lokumu kati na bikolo
ekomi lelo lokola mwasi akufisa mobali ;
oyo ezalaki engumba mokonzi
ekomi lelo na bowumbu !
 
Butu mobimba, azali kolela se kolela,
mpinzoli etondi na matama na ye.
Kati na bamakangu na ye nyonso,
moko te ayei kobondisa ye ;
baninga na ye nyonso bakosi ye,
bakomi banguna na ye.
 
Yuda akei na bowumbu,
akomi konyokwama mpe kosala misala makasi ;
azali kovanda kati na bikolo,
azali lisusu na esika ya kopema te.
Bato nyonso oyo bazali kolanda ye,
bakangi ye kati na pasi makasi.
 
Nzela oyo ekenda kino na Siona ezali na matanga,
pamba te bato bazali koya lisusu na bafeti te.
Bikuke na ye nyonso etikali lisusu na bato te,
Banganga-Nzambe na ye bazali kolela,
bana na ye ya basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te
bazali na mawa ;
bongo ye moko akomi na pasi makasi kati na motema.
 
Banguna na ye bakomi bakonzi na ye,
bayini na ye bazali na esengo ;
pamba te Yawe atindeli Siona pasi
likolo ya ebele ya masumu na ye.
Bana na ye ya mibali bakei na bowumbu,
bakangi bango mpe bazali kotambola
liboso ya monguna na ye.
Lokumu nyonso ya Siona, mboka kitoko, esili ;
bakambi na ye bakomi lokola mboloko
oyo ezangi matiti ya kolia,
mpe bazali kokima, makasi na bango esili
liboso ya moto oyo azali kolanda bango.
 
Na mikolo na ye ya pasi mpe ya koyengayenga,
tango bato na ye bazali kokweya na maboko ya banguna
mpe moto akosunga ye azali te,
Yelusalemi azali kokanisa bomengo na ye nyonso ya kala ;
bayini na ye batali ye na pamba
mpe basepeli na kobebisama na ye.
 
Yelusalemi asali masumu mingi penza,
yango wana akomi mbindo.
Bato nyonso oyo bazalaki kopesa ye lokumu
bakomi kotiola ye,
pamba te bamoni bolumbu na ye ;
ye moko mpe azali komilela
mpe abaluki mpo na kobomba elongi.
 
Mbindo na ye ekangami ye na elamba,
ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima.
Tala ye wana akweyi,
bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ;
moto oyo akolendisa ye azali te !
« Oh Yawe, tala pasi na ngai,
pamba te monguna alongi ngai ! »
 
10 Monguna asemboli loboko na ye
likolo ya bomengo nyonso ya Yelusalemi,
bongo azali komona bikolo ya bapaya
kokota na esika na ye ya bule,
bikolo oyo Yo opekisaki kokota kati na lisanga na Yo.
 
11 Bato na ye nyonso bazali kolela
lokola bato bazali koluka bilei ;
bapesaki bomengo na bango mpo na kozwa bilei,
mpo ete bawumela na bomoi.
Oh Yawe, tala mpe mona ndenge natiolami !
 
12 Bino bato nyonso oyo bolekelaka wana ;
boni, ezali kosala bino eloko moko te ?
Botala malamu zingazinga na bino,
ezali na pasi lokola pasi oyo ekomeli ngai ?
Yawe atindeli ngai yango
na mokolo ya kanda makasi na Ye.
13 Wuta na likolo, atindeli ngai moto,
akitiseli ngai yango kino na mikuwa ;
atieli ngai motambo na makolo
mpe akweyisi ngai ;
akomisi ngai eloko ya pamba,
akotisi ngai na mawa ya mokolo na mokolo.
 
14 Maboko na Ye ekangi masumu na ngai
ndenge bakangaka ekangiseli ;
masumu yango emati ngai kino na kingo,
mpe Nkolo asilisi makasi na ngai,
akabi ngai na maboko ya bato
oyo nazali na makoki ya kotelemela te.
 
15 Yawe asundoli bilombe nyonso ya bitumba
oyo bazalaki na milongo na ngai ;
abengi mampinga ya bapaya
mpo ete baya koboma bilenge mibali na ngai.
Nkolo akamoli Yuda, mboka kitoko,
na ekamolelo na Ye ya vino.
 
16 Tala tina nini nazali kolela
mpe miso na ngai etondi na mpinzoli ;
moto moko te ayei pene na ngai
mpo na kobondisa ngai,
moto moko te ayei kolendisa molimo na ngai.
Bana na ngai bazali na pasi,
mpo ete monguna aleki ngai na makasi.
 
17 Siona atomboli maboko na ye,
kasi moto oyo akobondisa ye azali te.
Yawe azwi mokano mpo na Jakobi
ete bazalani na ye bakokoma banguna na ye,
mpe ete Yelusalemi akokoma
eloko ya mbindo na miso na bango.
 
18 Yawe azali sembo ;
nzokande, ezali ngai nde natombokelaki mitindo na Ye.
Boyoka, bino bikolo nyonso,
mpe botala pasi na ngai !
Bana na ngai ya basi mpe ya mibali
bakei na bowumbu.
 
19 Nabengisaki baninga na ngai,
kasi bakosaki ngai.
Banganga-Nzambe mpe bakambi na ngai
bakufaki kati na engumba
tango bazalaki koluka bilei
mpo ete bawumela na bomoi.
20 Oh Yawe, tala ndenge nazali na pasi :
libumu na ngai ezali kotungisama,
mpe motema na ngai ezali kosala pasi,
pamba te nazalaki motomboki penza.
Na libanda, mopanga ezali koboma bana na ngai ;
mpe na kati, ezali kaka kufa.
 
21 Bato bayokaki na bango kolela na ngai,
kasi moto akobondisa ngai azali te ;
banguna na ngai nyonso bayokaki sango ya pasi na ngai
mpe basepelaki na makambo oyo osalaki.
Tika ete okokisa solo mokolo oyo olakaki,
mpo ete bango mpe bakoma lokola ngai !
 
22 Tika ete mabe na bango nyonso eya liboso na Yo ;
sala bango ndenge osalaki ngai
mpo na masumu nyonso oyo nasalaki !
Kolela na ngai ezali mingi
mpe motema na ngai etondi na pasi !