4
Komekama ya Yesu
(Mat 4.1-11; Mlk 1.12-13)
Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe epai wapi Satana amekaki Ye mikolo tuku minei. Na mikolo wana, alia eloko moko te ; mpe tango mikolo yango elekaki, ayokaki nzala.
Satana alobaki na Ye :
— Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na libanga ete ebongwana lipa.
Yesu azongiselaki ye :
— Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te. »
Satana amemaki Yesu na esika moko ya likolo makasi, alakisaki Ye mbala moko bokonzi nyonso ya mokili. Satana alobaki na Yesu :
— Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, pamba te epesamela ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo nalingi. Soki kaka ogumbameli ngai, nyonso ekokoma ya yo.
Yesu azongiselaki ye :
— Ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »
Bongo Satana amemaki Ye na Yelusalemi, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo mpe alobaki na Ye :
— Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; 10 pamba te ekomama :
« Akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye na tina na yo
mpo ete babatela Yo malamu.
11 Mpe bakomema Yo na maboko na bango
mpo ete lokolo na Yo etutana na libanga te. »
12 Yesu azongisaki :
— Ekomama : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »
13 Tango Satana asilisaki komeka Yesu na lolenge nyonso, akendeki mosika na Ye kino na mokolo oyo ekatama.
Lotomo ya Yesu kati na Galile
Yesu abandi mosala na Ye
(Mat 4.12-17; Mlk 1.14-15)
14 Yesu azongaki na Galile, atonda na nguya ya Molimo ; mpe basango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka wana mobimba. 15 Azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, mpe bato nyonso bazalaki kokumisa Ye.
(Mat 13.53-58; Mlk 6.1-6)
16 Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki ; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga, 17 mpe bapesaki Ye buku ya mosakoli Ezayi. Afungolaki yango mpe amonaki esika epai wapi bakoma :
18 « Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai,
pamba te apakoli Ngai mafuta
mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ;
atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami,
koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu,
kokangola bato oyo bazali konyokwama
19 mpe kosakola mobu ya ngolu ya Nkolo. »
20 Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye. 21 Bongo akomaki koloba na bango :
— Makomi oyo bowuti koyoka ekokisami lelo !
22 Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna :
— Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?
23 Yesu alobaki na bango :
— Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo : « Monganga, mibikisa yo moko ! » Mpe bokoloba na Ngai : « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi ! »
24 Abakisaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : « Mosakoli moko te andimamaka kati na ekolo na ye. 25 Nazali koloba na bino penza ya solo : ezalaki na basi ebele bakufisa mibali kati na Isalaele, na tango ya Eliya, tango likolo ekangamaki mibu misato mpe basanza motoba, mpe nzala makasi ezalaki kati na ekolo mobimba. 26 Nzokande, Eliya atindamaki te epai ya moko kati na bango, kasi atindamaki kaka epai ya mwasi moko akufisa mobali mpe azalaki kovanda na mboka Sarepita, kati na ekolo Sidoni. 27 Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »
28 Bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako ya mayangani basilikaki makasi tango bayokaki bongo ; 29 batelemaki, bakumbaki Yesu na libanda ya engumba, mpe bamemaki Ye kino na songe ya ngomba epai wapi batongaki engumba na bango, mpo ete babwaka Ye na se. 30 Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akobaki mobembo na Ye.
Yesu abengani molimo mabe
(Mlk 1.21-28)
31 Bongo Yesu akendeki na Kapernawumi, engumba ya Galile, mpe ateyaki kuna bato na mokolo ya Saba. 32 Bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te maloba na Ye ezalaki na bokonzi.
33 Kati na ndako ya mayangani, ezalaki na mobali moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe. Agangaki na mongongo makasi :
34 — Ah Yesu ya Nazareti, likambo nini kati na biso na Yo ? Oyei mpo na kobebisa biso ? Nayebi nani oyo Yo ozali : Mosantu ya Nzambe !
35 Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo :
— Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo !
Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso ya bato nyonso, ebimaki kati na ye mpe esalaki ye ata mabe moko te. 36 Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana :
— Oyo ezali lisusu maloba nini ! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima !
37 Mpe sango na tina na Yesu epanzanaki na bamboka ya etuka mobimba.
Yesu abikisi bato ebele
(Mat 8.14-17; Mlk 1.29-34)
38 Yesu abimaki na ndako ya mayangani mpe akendeki na ndako ya Simona. Mama-bokilo ya Simona azalaki kobela fievele makasi. Basengaki na Yesu ete abikisa ye. 39 Yesu agumbamaki pembeni na ye, apesaki mitindo na fievele, mpe fievele esilaki. Kaka na tango yango, mama-bokilo ya Simona atelemaki mpe akomaki kobongisela bango bilei.
40 Na pokwa, bato nyonso oyo bazalaki na babeli ya bokono ya ndenge na ndenge bamemaki bango epai ya Yesu. Yesu atielaki moko na moko kati na bango maboko mpe abikisaki bango. 41 Milimo mabe mpe ebimaki kati na bato ebele na koganga : « Ozali solo Mwana na Nzambe ! »
Kasi Yesu apesaki yango mitindo ete eloba te, pamba te eyebaki ete Yesu azali Klisto.
(Mat 4.23; Mlk 1.35-39)
42 Tango tongo etanaki, Yesu abimaki na ndako yango mpe akendeki na esika moko epai wapi azalaki kaka Ye moko. Ebele ya bato bazalaki koluka Ye ; mpe tango bakomaki na esika oyo azalaki, bamekaki kokangama na Ye mpe kopekisa Ye kotika bango.
43 Kasi Yesu alobaki na bango :
— Nasengeli mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bingumba mosusu, pamba te ezali mpo na yango nde Nzambe atindaki Ngai.
44 Mpe Yesu akobaki koteya kati na bandako ya mayangani ya Yuda.