6
Yesu, Mokonzi ya Saba
(Mat 12.1-8; Mlk 2.23-28)
Mokolo moko ya Saba, wana Yesu azalaki kotambola kati na bilanga ya ble, bayekoli na Ye babandaki kobuka ble ; mpe, sima na bango kolongola yango baposo na maboko, baliaki bambuma na yango.
Ndambo ya Bafarizeo batunaki :
— Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba ?
Yesu azongiselaki bango :
— Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala ? Akotaki kati na Ndako ya Nzambe, akamataki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe, aliaki yango mpe apesaki yango epai ya baninga na ye. Nzokande, Banganga-Nzambe kaka nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.
Yesu alobaki na bango lisusu :
— Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.
(Mat 12.9-14; Mlk 3.1-6)
Mokolo mosusu ya Saba, Yesu akotaki kati na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Ezalaki kuna na moto moko akufa loboko ya mobali. Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye.
Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko :
— Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso !
Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso.
Bongo Yesu alobaki na bato mosusu :
— Nazali kotuna bino : nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?
10 Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko :
— Sembola loboko na yo !
Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki. 11 Kasi balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo basilikaki makasi mpe bakomaki kolobana mpo na koluka likambo oyo bakoki kosala Yesu.
Yesu aponi bantoma zomi na mibale
(Mat 10.1-4; Mlk 3.13-19; Mis 1.13)
12 Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe. 13 Na tongo, abengaki bayekoli na Ye pene na Ye mpe aponaki bato zomi na mibale kati na bango, ba-oyo akomaki kobenga « bantoma. » Ezalaki :
14 Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ;
Jake,
Yoane,
Filipo,
Bartelemi ;
15 Matayo,
Toma ;
Jake, mwana mobali ya Alife,
Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote ;
16 Yuda, mwana mobali ya Jake,
mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
Yesu kati na ebele ya bato
(Mat 4.23-25; Mlk 3.7-13)
17 Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene. 18 Bayaki mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango. Ba-oyo milimo mabe ezalaki kotungisa bakangolamaki. 19 Bato nyonso balukaki kosimba Ye, pamba te nguya moko ezalaki kobima kati na Ye mpe ezalaki kobikisa bato nyonso.
Esengo to mawa
(Mat 5.1-12)
20 Bongo Yesu atalaki bayekoli na Ye mpe alobaki :
« Esengo na bino oyo bozali babola,
pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bino !
21 Esengo na bino oyo bozali na nzala sik’oyo,
pamba te bokotonda !
Esengo na bino oyo bozali kolela sik’oyo,
pamba te bokoseka !
22 Esengo na bino tango bato bazali koyina bino,
tango bazali kobengana bino,
tango bazali kofinga bino,
mpe tango bato bazali kosambwisa kombo na bino,
likolo na Mwana na Moto !
23 Tango makambo yango ekokokisama, bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo. Ezalaki mpe kaka ndenge wana nde batata na bango banyokolaki basakoli.
24 Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi,
pamba te bosili kozwa kobondisama na bino !
25 Mawa na bino oyo bozali ya kotonda sik’oyo,
pamba te bokozala na nzala !
Mawa na bino oyo bozali koseka sik’oyo,
pamba te bokozala na mawa mpe bokolela !
26 Mawa na bino soki bato nyonso bazali koloba malamu na tina na bino,
pamba te ezali ndenge wana nde bakoko na bango
basalaki basakoli ya lokuta !
Mateya mpo na kolinga banguna
(Mat 5.37-48)
27 Kasi, na bino oyo bozali koyoka Ngai, nalobi : Bolingaka banguna na bino mpe bosalelaka bayini na bino bolamu. 28 Bopambolaka bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino. 29 Soki moto abeti yo mbata na litama moko, pesa ye mpe litama mosusu. Soki moto abotoli yo kazaka na yo, tika ye azwa lisusu elamba na yo. 30 Pesa na moto nyonso oyo asengi yo ; mpe soki moto akamati eloko na yo, kosenga te ete azongisela yo yango.
31 Oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango. 32 Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe balingaka bato oyo balingaka bango. 33 Mpe soki bosalaka bolamu epai ya bato oyo basalaka bino bolamu, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe basalaka bongo. 34 Soki bodefisaka kaka na bato oyo bozali na elikya ete bakoki kofuta bino niongo oyo bodefisaka bango, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe badefisaka baninga na bango, bato ya masumu, na elikya ete bakofuta bango niongo yango.
35 Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.
36 Boyokelaka bato mawa, ndenge kaka Tata na bino ayokelaka bato mawa.
(Mat 7.1-5)
37 Bosambisaka te, mpe bakosambisa bino te ; bokatelaka bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te ; bolimbisaka, mpe bakolimbisa bino ; 38 bopesaka, mpe bakopesa bino ; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. »
39 Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo : « Boni, mokufi miso akoki kotambolisa mokufi miso mosusu ? Boni, bango mibale bakokweya te kati na libulu ?
40 Moyekoli alekaka molakisi na ye te, kasi moyekoli nyonso oyo bateyi malamu akozala lokola molakisi na ye.
41 Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ? 42 Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso na yo, › wana ozali kokoka komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko. Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo okomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.
(Mat 7.16-20)
43 Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu. 44 Nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango : na nzete ya nzube, babukaka bambuma ya figi te ; mpe na nzete ya sende, balongolaka bambuma ya vino te. 45 Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.
Moyekoli malamu mpe moyekoli mabe
(Mat 7.24-27)
46 Mpo na nini bobengaka Ngai ‹ Nkolo ! Nkolo ! › kasi bosalaka te makambo oyo nayebisaka bino ?
47 Moto nyonso oyo ayaka epai na Ngai, ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango na misala, nazali kolakisa bino soki akokani na nani : 48 akokani na moto oyo, mpo na kotonga ndako, atimolaki mabele, akitaki penza na mozindo mpe atongaki moboko ya ndako yango na likolo ya libanga ; tango mpela eyaki, mayi emataki makasi mpe emibwakaki na ndako yango kasi ekokaki te kobuka yango, pamba te etongamaki malamu.
49 Kasi moto oyo ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango te na misala akokani na moto oyo atongaki ndako na likolo ya mabele, ezanga moboko ; tango kaka mpela emibwakaki na ndako, ndako yango ekweyaki mbala moko mpe epanzanaki. »