28
Yesu asekwi
(Mlk 16.1-8; Lk 24.1-12; Yn 20.1-2)
Sima na mokolo ya Saba, na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bakendeki kotala kunda. Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango. Azalaki kongenga lokola mikalikali, mpe bilamba na ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe. Bakengeli bakomaki kolenga mpo na somo mpe bakomaki lokola bato ya kokufa.
Kasi anjelu alobaki na basi : « Bobanga te ! Nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu. Azali lisusu awa te, pamba te asili kosekwa, ndenge kaka alobaki. Boya kotala esika oyo nzoto na Ye ezalaki, mpe bokende noki koyebisa bayekoli na Ye : ‹ Asili kosekwa kati na bakufi ; akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye. › Yango nde makambo oyo nazalaki na yango ya koyebisa bino. »
Balongwaki noki na kunda, na somo mpe na esengo makasi ; bapotaki mbangu mpo na kokende kopesa sango epai ya bayekoli na Ye. Mbala moko, Yesu akutanaki na bango mpe alobaki :
— Mbote na bino !
Bapusanaki pene na Ye, basimbaki makolo na Ye mpe bagumbamelaki Ye.
10 Yesu alobaki na bango :
— Bobanga te ! Bokende koyebisa bandeko na Ngai ete bakende na Galile ; ezali kuna nde bakomona Ngai.
11 Wana basi bazalaki kokende, ndambo ya bakengeli bazongaki kati na engumba mpo na koyebisa na bakonzi ya Banganga-Nzambe, makambo nyonso oyo ewutaki koleka. 12 Bakonzi ya Banganga-Nzambe babengaki bakambi ya bato mpe, elongo na bango, basalaki mwango moko, bapesaki mbongo ebele epai ya basoda 13 mpe balobaki na bango : « Tala ndenge bosengeli koloba : ‹ Wana tozalaki kati na pongi, bayekoli na ye bayaki koyiba nzoto na ye, na butu. › 14 Soki likambo yango ekomi na matoyi ya moyangeli, tokoyeba kosolola na ye mpe kosala nyonso mpo ete bomema ngambo te. »
15 Basoda bazwaki mbongo mpe basalaki ndenge kaka batindaki bango. Lisolo yango epanzanaki kati na Bayuda mpe ezali kolobama kino na mokolo ya lelo.
Yesu abimeli bayekoli na Ye
16 Bayekoli zomi na moko bakendeki na Galile, na ngomba oyo Yesu ayebisaki bango ete bakende. 17 Tango bamonaki Ye, bagumbamelaki Ye ; kasi bamosusu kati na bango bandimaki te.
18 Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki :
— Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili. 19  Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ; 20  bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.