Mishe
1
Sango ya libebi ya Isalaele
Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda : ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.
Bino nyonso, bikolo, boyoka !
Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo,
botia matoyi mpe boyoka !
Nkolo Yawe azwi bino na likambo ;
Yawe akosambisa bino
wuta na Ndako na Ye ya bule !
 
Tala, Yawe azali koya wuta na Ndako na Ye,
azali kokita, azali kotambola na likolo ya bangomba ya mabele.
Na se ya matambe na Ye, bangomba ezali kopasuka,
mabwaku ezali kopanzana
ndenge mafuta eyandukaka na moto,
ndenge mayi ya mvula etiolaka na lombangu
na mipanzi ya bangomba.
Mpo na nini nyonso wana ?
Ezali mpo na mabe ya Jakobi,
mpo na masumu ya libota ya Isalaele.
 
Nani atindikaki Jakobi na kosala mabe ?
Boni, ezali Samari te ?
Nani asalaki ete bisambelo ya likolo ya bangomba
ezala kati na Yuda ?
Boni, ezali Yelusalemi te ?
 
« Nakokomisa Samari mopiku ya mabanga ;
bakokoma kosala bilanga ya vino kuna.
Nakobwaka mabanga na yango na lubwaku,
nakosala ete miboko na yango etikala polele.
Banzambe na bango nyonso ya bikeko ekopanzana,
makabo nyonso ya mbindo oyo bapesaka
epai ya banzambe na bango ya bikeko ekobwakama na moto.
Nakobebisa banzambe nyonso ya bikeko ya Samari
mpo ete esalemaki na lifuti ya mbindo ya ekobo ya bule,
mpe mpo ete basalela yango lisusu te
lokola lifuti ya ekobo mosusu ya bule. »
Bileli mpe matanga
Yango wana, nakolela mpe nakosala matanga,
nakotambola makolo ngulu mpe bolumbu,
nakoganga lokola mbwa ya zamba
mpe nakolela lokola maligbanga.
Pamba te bokono ya Samari esilaka te ;
pota na yango ezwi mpe mokili ya Yuda,
ezali kopusana kino na ekuke ya bato na ngai,
kino kutu na yango moko Yelusalemi.
10 Boloba yango te kati na engumba Gati,
bolela te !
Bato ya Beti-Leafra, bomipakola putulu !
11 Bato ya engumba Shafiri,
botambola bolumbu mpe boyoka soni !
Bato ya mboka Tsanani bakobima lisusu
na engumba na bango te,
bato ya Beti-Atseli bazali na matanga ;
boye balongoli lisungi na bango epai na yo.
12 Bato ya etuka ya Meroti bazali kolenga na somo
mpo na bolamu na bango,
pamba te Yawe atindi pasi ya makasi
kino na ekuke ya Yelusalemi.
13 Bino bavandi ya engumba Lakishi,
bokangisa bampunda mpe bashar na bino !
Bino nde bomemisaki Siona, mboka kitoko, masumu ;
pamba te bamonaki masumu ya Isalaele kati na bino !
14 Yango wana, bokopesa na Moresheti mokanda
oyo elakisi ete bokabwani na ye na libala.
Engumba Akizibi ezali kokosa bakonzi ya Isalaele.
15 Bino bavandi ya Maresha,
nakotindela bino monguna moko
mpo ete aya kobundisa bino ;
lokumu ya Isalaele ekokima na engumba Adulami.
16 Bomikokola suki na mito
mpo na bana na bino ya mibali oyo bolingaka,
ndenge esalemaka na matanga.
Bomikokola suki na mito
mpe botikala mabandi lokola mpongo,
pamba te bakomema bango na bowumbu mosika na bino.